Hosea
7 “Na ntango oyo nalingi kobikisa Yisraele,+ libunga ya Efraime mpe emonani polele,+ ná makambo mabe ya Samaria;+ mpamba te basali na bokosi,+ mpe moyibi azali kokɔta; etuluku ya bapunzi bazali kopunza na libándá.+ 2 Mpe na mitema na bango,+ bazali koloba te ete ngai nakokanisa mabe nyonso oyo bazali kosala.+ Sikoyo, misala na bango ezingi bango.+ Eyei liboso na ngai.+ 3 Bazali kosepelisa mokonzi na mabe na bango, mpe bazali kosepelisa bankumu na misala na bango ya bokosi.+ 4 Bango nyonso bazali bato ya ekobo,+ bazali lokola litumbu oyo mosali-mampa apelisi, oyo atiki kongalisa mɔtɔ ntango azali kobɛta pɔtɔpɔtɔ ya farini tii ekovimba. 5 Na mokolo ya mokonzi na biso, bankumu babɛlaki+—bayoki nkanda makasi mpo na vinyo.+ Mokonzi asemboli lobɔkɔ na ye elongo na batyoli. 6 Mpamba te bapelisi motema na bango na mposa lokola nde bapusi yango penepene na litumbu;+ ezali kopela na kati na bango.+ Butu mobimba, mosali-mampa na bango azali kolala; na ntɔngɔ, mɔtɔ makasi ekopela na litumbu.+ 7 Bango nyonso bakómi mɔtɔ lokola litumbu, mpe ya solo bazali kolya basambisi na bango. Bakonzi na bango bakwei bango nyonso;+ moko te kati na bango azali kobelela ngai.+
8 “Efraime amikɔtisi ye moko na bato ya bikólo mosusu.+ Efraime akómi gato ya libungutulu oyo babaloli yango na mopanzi mosusu te.+ 9 Bapaya balei nguya na ye,+ mpe ye moko azali koyeba yango te.+ Lisusu, nsuki mpɛmbɛ eteli na motó na ye, kasi ye moko azali koyeba yango te. 10 Mpe lolendo ya Yisraele efundi ye,+ mpe atako bongo bazongeli Yehova Nzambe na bango te,+ baluki ye mpe te.+ 11 Mpe Efraime azali lokola ebenga ya zobazoba,+ oyo ezangi mayele.+ Babeleli Ezipito;+ bakei na Asiri.+
12 “Nzela nyonso oyo bakokende, nakotanda monyama na ngai likoló na bango.+ Nakokitisa bango na nse lokola bakitisaka bikelamu oyo epumbwaka na likoló.+ Nakopesa bango disiplini na kolanda likebisi oyo napesaki liyangani na bango.+ 13 Mawa na bango,+ mpo bakimi ngai!+ Bápunza bango, mpo babuki mibeko na ngai! Mpe ngai nabandaki kosikola bango,+ kasi bango bakoseli ngai mpenza makambo.+ 14 Mpe babelelaki ngai te na motema na bango+ mpo na kosɛnga lisalisi, atako bazalaki koganga na kolela na bambeto na bango. Bazalaki se kowayawaya mpo na mbuma na bango mpe mpo na vinyo na bango ya elɛngi;+ bazalaki se kobalukela ngai.+ 15 Bongo ngai napesaki disiplini;+ nalendisaki mabɔkɔ na bango,+ kasi bango bazalaki se kokana kosala ngai makambo mabe.+ 16 Mpe bazongaki, kasi bazongelaki te eloko oyo etombwani;*+ bakómaki lokola litimbo oyo nsinga na yango ebendani malamu te.+ Bankumu na bango bakokwea na mopanga mpo na makaneli ya lolemo na bango.+ Yango wana bakotyolama na mokili ya Ezipito.+