Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 35:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe ya solo balabala moko ya monene+ ekozala kuna, ɛɛ nzela; mpe ekobengama Nzela ya Bosantu.+ Moto ya mbindo akoleka kuna te.+ Mpe yango ekozala ya moto oyo azali kotambola na nzela, mpe bazoba bakoyengayenga kuna te.

  • Yisaya 60:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Mobulu ekoyokana lisusu te na mokili na yo, kopunzama to kobukana na kati ya bandelo na yo.+ Mpe okobenga bifelo na yo Lobiko+ mpe baporte na yo Lisanzoli.

  • Nahumu 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Talá na bangomba, makolo ya moto oyo azali koya na nsango malamu, moto oyo azali kosakola kimya.+ Ee Yuda, salá bafɛti na yo.+ Kokisá bilako na yo;+ mpo moto mpamba akobanda koleka lisusu na kati na yo te.+ Akolongolama mobimba mpenza.”+

  • Zekaria 14:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe nzungu nyonso ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene na Yerusaleme mpe na Yuda ekokóma eloko ya bosantu ya Yehova ya mampinga, mpe baoyo nyonso bazali kopesa mbeka basengeli kokɔta kozwa yango mpe kolamba na yango.+ Mpe Mokanana akozala lisusu te+ na ndako ya Yehova ya mampinga na mokolo yango.”+

  • Emoniseli 21:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Kasi eloko nyonso oyo ezali mosantu te mpe moto nyonso oyo asalaka likambo moko ya bosɔtɔ+ mpe abukaka lokuta+ akokɔta kuna te;+ kaka baoyo bakomami na rulo ya bomoi ya Mwana-Mpate nde bakokɔta.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto