Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 46:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Bikólo ekómaki yikiyiki,+ makonzi ekómaki kotengatenga;

      Ayokisaki mongongo na ye, mabele ebandaki konyangwa.+

  • Yisaya 42:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Yehova ye moko akobima lokola mobali ya nguya.+ Akolamwisa molende na ye lokola mobundi.+ Akoganga, ɛɛ, akobɛta ntangwa ya etumba;+ liboso ya banguna na ye akolakisa ete azali na nguya koleka.+

  • Yirimia 25:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “Mpe yo, okosakwela bango maloba oyo nyonso, mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Longwa na likoló Yehova ye moko akoganga,+ mpe longwa na esika mosantu na ye ya kofanda akoyokisa mongongo na ye.+ Akoganga mpenza na esika na ye ya kofanda. Akoyembela bato nyonso oyo bafandi na mabele na koganga lokola oyo ya bato oyo bazali konyatanyata mbuma na ekamwelo ya vinyo.’+

  • Yoele 3:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe uta na Siona, Yehova ye moko akoganga makasi, mpe uta na Yerusaleme, akoyokisa mongongo na ye.+ Likoló ná mabele ekolɛnga mpenza;+ kasi Yehova akozala esika ya kobombana ya bato na ye,+ mpe ndako makasi ya bana ya Yisraele.+

  • Amose 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe alobaki ete:

      “Yehova—akoganga uta na Siona,+ mpe akoyokisa mongongo na ye uta na Yerusaleme;+ mpe bisika oyo babateli ya mpate baleisaka banyama matiti ekolela, mpe nsɔngɛ ya Karamele ekokauka.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto