Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 22:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 lokola motema+ na yo ezalaki makasi te mpe omikitisi+ liboso ya Yehova ntango oyoki makambo oyo nalobeli esika oyo mpe bato oyo bafandi wana, ete ekokóma eloko ya kokamwa mpe elakeli mabe,+ mpe lokola opasoli+ bilamba na yo mpe obandi kolela liboso na ngai, ngai, ɛɛ ngai, nayoki,” yango nde liloba ya Yehova.+

  • Nzembo 34:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yehova azali pene na baoyo motema ebukani;+

      Mpe abikisaka baoyo elimo etutami.+

  • Nzembo 51:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bambeka oyo Nzambe andimaka ezali elimo oyo ebukani;+

      Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.+

  • Yisaya 57:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpo talá oyo Moto oyo azali likoló mpe Moto oyo atombwani,+ oyo afandi mpo na libela+ mpe oyo nkombo na ye ezali mosantu,+ alobi: “Nafandaka na esika oyo etombwaná mpe na esika mosantu,+ mpe esika moko na moto oyo atutami mpe oyo azali na elimo ya komikitisa,+ mpo na kopesa lisusu makasi na elimo ya bato ya komikitisa mpe kopesa makasi lisusu na motema ya bato oyo batutami.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto