8 Sikoyo, bókómisa mitó na bino makasi+ te ndenge bankɔkɔ na bino basalaki. Bóyokela Yehova+ mpe bóya na esika na ye mosantu+ oyo asantisi+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpe bósalela+ Yehova Nzambe na bino, mpo nkanda na ye oyo ezali kongala+ elongwa epai na bino.
3 bóluka Yehova,+ bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele,+ oyo botosi ekateli na Ye ya lisambisi. Bóluka boyengebene,+ bóluka komikitisa.+ Ntango mosusu+ bokobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.+