Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 106:45
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 45 Mpe, mpo na bango, azalaki kokanisa kondimana na ye,+

      Mpe azalaki koyoka mawa na kolanda bonene ya motema boboto na ye ya kokamwa.+

  • Yirimia 26:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mbala mosusu bakoyoka mpe bakozonga, moto na moto longwa na nzela na ye mabe,+ mpe nakoyoka mpenza mawa mpo na mpasi oyo nazali kokanisa kobimisela bango mpo na mabe ya misala na bango.+

  • Yoele 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpe bópasola mitema+ na bino, kasi bilamba na bino te;+ mpe bózongela Yehova Nzambe na bino, mpamba te azali na ngɔlu mpe na motema mawa,+ ayokaka nkanda noki te+ mpe azali na motema boboto mingi,+ mpe akoyoka mpenza mawa mpo na mpasi yango.+

  • Yona 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe Nzambe ya solo amonaki misala na bango,+ amonaki ete babongwani na nzela na bango ya mabe;+ bongo Nzambe ya solo ayokaki mawa+ mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.+

  • Yona 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na yango, abondelaki Yehova mpe alobaki boye: “Sikoyo, Ee Yehova, oyo ezali te likambo oyo ezalaki kotungisa ngai ntango nazalaki na mokili na ngai? Yango wana, nawelelaki kokima na Tarasisi;+ mpo nayebaki ete yo ozali Nzambe ya ngɔlu mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda noki te mpe ozali na motema boboto mingi,+ mpe oyokaka mawa mpo na likama.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto