20 Kasi ntango motema na ye ekómaki na lolendo mpe akómaki motó makasi, bongo akómaki kosala na lofundo,+ alongolamaki na kiti ya bokonzi na ye mpe akitisamaki, mpe balongolaki ye lokumu na ye.+
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+