2 Na ntango yango nde Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná Yeshua+ mwana ya Yehozadake batɛlɛmaki mpe babandaki kotonga lisusu ndako ya Nzambe, oyo ezalaki na Yerusaleme; mpe basakoli ya Nzambe+ bazalaki na bango mpo na kopesa bango lisalisi.
15 Mpe baoyo bazali mosika bakoya mpe bakotonga mpenza na kati ya tempelo ya Yehova.”+ Mpe bosengeli koyeba ete Yehova ya mampinga ye moko nde atindi ngai epai na bino.+ Mpe ekosalema mpenza bongo—soki bokoyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bino.’”+
21 apesa bino eloko nyonso ya malamu mpo na kosala mokano na ye, asala na kati na biso na nzela ya Yesu Kristo makambo ya malamu na miso na ye;+ azala na nkembo libela na libela.+ Amen.