Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezekiele 38:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “‘Mpe na etúká na ngai mobimba ya ngombangomba, nakobenga mopanga mpo na kobundisa ye,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ ‘Mopanga ya moto na moto ekobalukela ndeko na ye moko.+

  • Mika 7:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Moto ya sembo alimwe na mabele, mpe moto ya makambo alima azali na kati ya bato te.+ Bango nyonso, bazelaka na kobombana mpo na kosopa makila.+ Balukaka kokanga, moto na moto ndeko na ye mpenza, na monyama.+

  • Hagai 2:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe nakokweisa mpenza kiti ya bokonzi ya makonzi mpe nakosilisa makasi ya makonzi ya bikólo nyɛɛ;+ mpe nakokweisa likalo ná batambwisi na yango, mpe bampunda ná batambwisi na yango bakobomama mpenza,+ mokomoko na mopanga ya ndeko na ye.’”+

  • Zekaria 11:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bongo nalobaki ete: “Nakoleisa bino lisusu te.+ Oyo azali kokufa, akufa. Mpe oyo azali kolongolama, alongolama.+ Mpe baoyo batikali, mokomoko alya mosuni ya moninga na ye.”+

  • Zekaria 14:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpe ekosalema boye na mokolo yango ete mobulungano oyo euti na Yehova ekopalangana bipai nyonso na kati na bango;+ mpe bakosimba makasi mpenza, mokomoko lobɔkɔ ya moninga na ye, mpe lobɔkɔ na ye ekotɛmɛla mpenza lobɔkɔ ya moninga na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto