13 “Nazalaki se kotala na bimonaneli ya butu, mpe talá! moto moko lokola mwana ya moto+ azalaki koya na mapata+ ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo,+ mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana.+
24 Mpo se ndenge mokalikali+ engɛngaka ntango ebimaka banda na esika moko na likoló tii na esika mosusu na likoló, komonana ya Mwana ya moto+ ekozala se bongo.
15 Mpo talá oyo tozali koyebisa bino na kolanda liloba ya Yehova:+ ete biso bato ya bomoi oyo tozali kotikala tii na kozala ya Nkolo+ tokoleka soki moke te liboso ya baoyo balali na kati ya liwa;