Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 113:1-9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 113 Bósanzola Yah!+

      Ee bino basaleli ya Yehova, bópesa masanzoli,+

      Bósanzola nkombo ya Yehova.+

       2 Nkombo ya Yehova epambwama+

      Banda sikoyo mpe mpo na seko.+

       3 Banda epai moi ebimaka kino epai yango elalaka+

      Nkombo ya Yehova esengeli kosanzolama.+

       4 Yehova akómi likoló ya bikólo nyonso;+

      Nkembo na ye ezali mosika koleka likoló.+

       5 Nani azali lokola Yehova Nzambe na biso,+

      Ye oyo azali kosala esika na ye ya kofanda kuna na likoló?+

       6 Azali komikitisa mpo na kotala likoló mpe mabele,+

       7 Azali kolongola moto oyo azangá na putulu mpenza+ mpe azali kotɛlɛmisa ye;

      Alongolaka mobola na libulu ya putulu ya mɔtɔ mpe azali kotombola ye,+

       8 Mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu,+

      Esika moko na bankumu ya bato na ye.+

       9 Azali kofandisa mwasi ekomba na ndako,+

      Akómi mama ya bana oyo atondi na esengo.+

      Bósanzola Yah!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto