Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 16:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo yo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda* te.+

      Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu.+

  • Yisaya 53:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,+ mpe na bato ya nguya nde akokabola biloko oyo epunzami,+ mpamba te asopaki molimo na ye kino na liwa,+ mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko;+ mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele,+ mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.+

  • Matai 17:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpe bakoboma ye, mpe na mokolo ya misato akolamuka.”+ Bongo bayokaki mawa mingi mpenza.+

  • Matai 20:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo mpo na kosɛka ye mpe kobɛta ye fimbo mpe kobaka ye na nzete,+ mpe na mokolo ya misato akolamuka.”+

  • Marko 8:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Lisusu, abandaki koteya bango ete Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi mpe koboyama na mikóló ná banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli mpe kobomama,+ mpe kosekwa mikolo misato na nsima.+

  • Luka 9:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 mpe alobaki ete: “Mwana ya moto asengeli komona mpasi mingi mpe mikóló ná banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli bakoboya ye, mpe bakoboma ye,+ mpe na mokolo ya misato akolamuka.”+

  • Luka 24:46
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 mpe alobaki na bango ete: “Ndenge wana nde ekomamá ete Kristo asengeli komona mpasi, kokufa mpe kosekwa na mokolo ya misato,+

  • 1 Bakorinti 15:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpe ete akundamaki,+ ɛɛ, ete alamukaki+ na mokolo ya misato+ na kotalela Makomami;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto