Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Danyele 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe bapesaki ye boyangeli,+ lokumu+ ná bokonzi,+ mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.+ Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.+

  • Matai 20:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Alobaki na ye ete: “Olingi nini?” Ye alobaki na Yesu ete: “Lobá ete bana na ngai oyo mibale báfanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na bokonzi na yo.”+

  • Matai 25:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “Ntango Mwana ya moto+ akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye,+ bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.+

  • Luka 18:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Alobaki na bango ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Ezali na moto moko te oyo atiki ndako to mwasi to bandeko mibali to baboti to bana mpo na bokonzi ya Nzambe+

  • Luka 22:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 mpo bólya+ mpe bómɛla na mesa na ngai na bokonzi na ngai,+ mpe bófanda na bakiti ya bokonzi+ mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.

  • 1 Bakorinti 6:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 To boyebi te ete basantu bakosambisa+ mokili?+ Mpe soki bino bokosambisa mokili, bobongi nde kosambisa makambo ya mikemike+ te?

  • Emoniseli 20:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe namonaki bakiti ya bokonzi,+ mpe ezalaki na baoyo bafandaki na yango, mpe bapesaki bango nguya ya kosambisa.+ Ɛɛ, namonaki milimo ya baoyo babomamaki na sóka mpo na litatoli oyo bapesaki mpo na Yesu mpe mpo balobelaki Nzambe, mpe baoyo basambelaki nyama mabe+ ná elilingi na yango te+ mpe oyo bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na mabɔkɔ na bango.+ Mpe bazongaki na bomoi mpe bayangelaki+ elongo na Kristo mbula nkóto moko (1 000).

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto