9 Mpe yango esengeli kokóma ya Arona ná bana na ye ya mibali,+ mpe basengeli kolya yango na esika mosantu,+ mpamba te ezali eloko oyo eleki bosantu mpo na ye, oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, lokola lilako mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”