Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 18:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo na Yehova, ezali nde na likambo moko ya mpasi koleka?+ Na Ntango oyo etyamá nakozonga epai na yo, na mbula oyo ezali koya na ntango lokola oyo, mpe Sara akozala na mwana mobali.”

  • Yirimia 32:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Aa, Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova!+ Talá yo nde ozalisaki likoló ná mabele na nguya na yo monene+ mpe na lobɔkɔ na yo oyo esembolami.+ Likambo nyonso wana ezali ya kokamwa mingi te mpo na yo,+

  • Zekaria 8:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Ata soki ekoki kozala likambo ya mpasi mpenza na miso ya bato oyo bakotikala na kati ya bato oyo na mikolo wana, yango ekozala mpe likambo ya mpasi mpenza na miso na ngai?’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.”

  • Marko 14:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpe alobaki lisusu ete: “Aba, Tata,+ makambo nyonso ekoki kosalema epai na yo; longolelá ngai kɔpɔ oyo. Nzokande, ezala te oyo ngai nalingi, kasi oyo yo olingi.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto