6 Moto akosa bino te na maloba ya mpambampamba,+ mpamba te ezali mpo na makambo oyo elobelami awa nde nkanda ya Nzambe ezali koyela bana oyo bazangi botosi.+
4Bandeko ya bolingo, bóndimaka te liloba nyonso oyo emonani lokola nde euti na Nzambe,+ kasi bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye,+ mpo ebele ya basakoli ya lokuta babimi na mokili.+
9 Bongo dragɔ yango ya monene+ ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli,+ oyo babengi Zabolo+ mpe Satana,+ oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi;+ abwakami na mabele,+ mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.