64 Yesu alobaki+ na ye ete: “Yo moko olobi yango.+ Nzokande nazali koloba na bino: Banda sikoyo+ bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali+ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso* mpe azali koya na mapata ya likoló.”+
62 Bongo Yesu alobaki ete: “Ezali ngai; mpe bokomona Mwana ya moto+ afandi na lobɔkɔ ya mobali+ ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe azali koya na mapata ya likoló.”+
33 Na yango, lokola atombwamaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe+ mpe azwaki, epai ya Tata, elimo santu oyo elakamaki,+ asopi oyo bino bozali komona mpe koyoka.
34 Nani akokweisa bango na likambo? Moto moko te, mpo Kristo Yesu akufaki mpe alamwisamaki uta na bakufi, ye moto azali na lobɔkɔ ya mobali+ ya Nzambe, mpe moto azali kolobela biso.+
3 Mwana yango azali mpenza komonisa nkembo+ ya Nzambe mpe azali elilingi na Ye mpenza,+ mpe azali kosimba biloko nyonso na liloba ya nguya na ye,+ mpe nsima ya kopɛtola masumu+ na biso afandaki na lobɔkɔ ya mobali+ ya Bokonzi Monene kuna na likoló.+