12 Ntango okokóma na nsuka ya bomoi na yo,+ mpe okolala esika moko na bankɔkɔ na yo,+ nakobimisa mpenza nsima na yo momboto na yo, oyo akouta na libumu na yo; mpe nakopika makasi mpenza bokonzi na ye.+
7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+
5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+