Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 22:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Baoyo nyonso bazali komona ngai, bazali kosɛka ngai;+

      Bazali se kofungola minɔkɔ na bango polele, bazali se koningisa mitó na bango:+

  • Nzembo 22:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpo bambwa ezingi ngai;+

      Liyangani ya basali-mabe ezingi ngai.+

      Bazali koswa mabɔkɔ na ngai ná makolo na ngai lokola nkɔsi.+

  • Nzembo 35:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Ee baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba básepela te mpo na ngai;+

      Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bábwɛta liso te.+

  • Yisaya 50:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Napesaki mokɔngɔ na ngai na baoyo babɛtaka, mpe matama+ na ngai na baoyo bapikolaka nsuki. Nabombaki elongi na ngai te ntango bafingaki ngai mpe babwakelaki ngai nsoi.+

  • Yisaya 53:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi atɔbɔlamaki+ mpo na misala na biso ya kobuka mibeko;+ anyatamaki mpo na mabunga na biso.+ Etumbu oyo esengelaki mpo na kimya na biso ezalaki likoló na ye,+ mpe mpo na bampota+ na ye tobiki.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto