-
1 Samwele 14:45Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
45 Kasi bato balobaki na Saulo boye: “Yonatane asengeli nde kokufa, ye moto amemi lobiko monene+ boye na Yisraele? Ekoki kokanisama ata moke te!+ Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ ata nsuki+ moko te ya motó na ye ekokwea na mabele; mpo ezali elongo na Nzambe nde ye asalaki mosala na mokolo ya lelo.”+ Na yango, bato basikolaki+ Yonatane, mpe akufaki te.
-
-
2 Samwele 14:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 Kasi mwasi yango alobaki ete: “Nabondeli yo, tiká ete mokonzi akanisa Yehova Nzambe+ na yo, noki mozongisi mabe mpo na makila+ abakisa mpasi likoló ya mpasi mpe báboma mwana na ngai ya mobali.” Na yango, ye alobaki ete: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ ata nsuki moko ya motó+ ya mwana na yo ya mobali ekokwea na mabele te.”
-