Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo baboteli biso mwana,+ bapesi biso mwana mobali;+ mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.+ Mpe bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko,+ Nkumu ya Kimya.+

  • Yisaya 11:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango:+ mosisa ya Yese+ akotɛlɛma lokola elembo mpo na bato ya bikólo.+ Bikólo ekoluka ye mpe ekotuna ye,+ mpe esika na ye ya kopema ekokóma na nkembo.+

  • Yisaya 52:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 ndenge yango nde akosutukisa bikólo mingi.+ Bakonzi bakokanga minɔkɔ liboso na ye,+ mpo makambo oyo babɛtelá bango naino lisolo te, bakomona yango mpenza, mpe makambo oyo bayoká naino te, bakotyela yango likebi.+

  • Yirimia 23:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+

  • Mika 5:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+ yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda,+ uta na yo+ moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele,+ oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Zekaria 13:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Ee mopanga, lamuká mpo na kotɛmɛla mobateli ya mpate na ngai,+ ɛɛ mpo na kotɛmɛla mobali makasi oyo azali moninga na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga. “Bɛtá mobateli ya mpate,+ mpe bampate ya etonga epanzana;+ mpe nakozongisela mpenza baoyo bazali moke lobɔkɔ na ngai.”+

  • Malaki 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Talá! Nazali kotinda mo-memi-nsango na ngai,+ mpe akobongisa mpenza nzela liboso na ngai.+ Mpe Nkolo ya solosolo+ oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye+ ná momemi-nsango+ ya kondimana+ oyo bino bozali kosepela na ye.+ Talá! Ye akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.+

  • Luka 24:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Sikoyo alobaki na bango ete: “Oyo ezali maloba nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino,+ ete makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na mibeko ya Moize mpe na Basakoli+ mpe na Nzembo+ esengeli kokokisama.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto