Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 49:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Lingenda ya bokonzi ekolongwa na Yuda te,+ mpe lingenda ya komanda na kati ya makolo na ye te, kino Shilo akoya;+ mpe bato ya bikólo bakotosa ye.+

  • Kolimbola Mibeko 18:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mosakoli moko oyo akouta epai na yo mpenza, oyo akouta na kati na bandeko na yo, lokola ngai, ye nde Yehova Nzambe na yo akotɛlɛmisela yo—ye nde bokoyoka+—

  • Nzembo 16:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo yo okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda* te.+

      Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu.+

  • Yisaya 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Yango wana Yehova ye moko akopesa bino elembo: Talá! Elenge mwasi+ akozwa mpenza zemi,+ mpe akobota mwana mobali,+ mpe akopesa ye nkombo Emanuele.

  • Mika 5:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+ yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda,+ uta na yo+ moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele,+ oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Malaki 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Talá! Nazali kotinda mo-memi-nsango na ngai,+ mpe akobongisa mpenza nzela liboso na ngai.+ Mpe Nkolo ya solosolo+ oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye+ ná momemi-nsango+ ya kondimana+ oyo bino bozali kosepela na ye.+ Talá! Ye akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.+

  • Misala 9:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi Saulo akobaki kozwa nguya mingi lisusu mpe azalaki kosukisa Bayuda oyo bazalaki kofanda na Damasi wana azalaki komonisa makambo na molɔngɔ mpenza ete moto wana azali Kristo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto