10 Mpe baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe ya solo bakoya na Siona na koganga ya esengo;+ mpe esengo ekozala na motó na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bakosepela mpe bakozala na esengo, mpe mawa ná kokimela ekokima mpenza.+
14 oyo amipesaki+ mpo na biso mpo asikola+ biso na makambo ya ndenge nyonso ya kobuka mibeko mpe apɛtola+ mpo na ye bato oyo bazali bato na ye moko,+ oyo bazali na molende na misala ya malamu.+
15 Yango wana azali moyokanisi+ ya kondimana ya sika mpo baoyo babengami bázwa elaka ya libula ya seko;+ mpo liwa na ye ezalaki mpo na kosikola bango na nzela ya lisiko+ na makambo ya kobuka mibeko oyo esalemaki na kondimana ya kala.+