Yobo 31:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Soki nazalaki komona moto azali kokufa mpo azangi elamba,+To mobola azangi eloko ya kozipa nzoto; Yisaya 58:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Ezali nde kokabola limpa na yo na moto oyo azali na nzala,+ mpe ete okɔtisa na ndako na yo bato ya mpasi, bato oyo bazangá ndako, boye te?+ Soki omoni moto moko bolumbu, olatisa ye,+ mpe omibomba te liboso ya moto oyo azali ndeko na yo, boye te?+ Matai 25:36 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 36 nazalaki bolumbu,+ mpe bolatisaki ngai. Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ+ mpe boyaki kotala ngai.’ Luka 3:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Azalaki kozongisela bango ete: “Moto oyo azali na bilamba mibale ya nse akabela moto oyo azangi, mpe moto oyo azali na biloko ya kolya asala mpe bongo.”+
7 Ezali nde kokabola limpa na yo na moto oyo azali na nzala,+ mpe ete okɔtisa na ndako na yo bato ya mpasi, bato oyo bazangá ndako, boye te?+ Soki omoni moto moko bolumbu, olatisa ye,+ mpe omibomba te liboso ya moto oyo azali ndeko na yo, boye te?+
36 nazalaki bolumbu,+ mpe bolatisaki ngai. Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ+ mpe boyaki kotala ngai.’
11 Azalaki kozongisela bango ete: “Moto oyo azali na bilamba mibale ya nse akabela moto oyo azangi, mpe moto oyo azali na biloko ya kolya asala mpe bongo.”+