Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya 1 Samwele

      • Liwa ya Samwele (1)

      • Nabale abengani bato ya Davidi (2-13)

      • Abigaile amonisi bwanya (14-35)

        • ‘Na kati ya saki ya bomoi epai ya Yehova’ (29)

      • Yehova abomi Nabale (36-38)

      • Abigaile akómi mwasi ya Davidi (39-44)

1 Samwele 25:1

Mitindami

  • +1Sa 1:20; 2:18; 3:20; Nz 99:6
  • +1Sa 7:15, 17

1 Samwele 25:2

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Engumba moko ya Yuda; yango ekeseni na Ngomba Karamele.

Mitindami

  • +1Sa 23:24
  • +Yos 15:20, 55

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 78

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 19

1 Samwele 25:3

Mitindami

  • +1Sa 25:25
  • +Mit 13:6; 32:11, 12
  • +1Sa 27:3
  • +1Sa 25:17, 21

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 76-77

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, nk. 19-32

1 Samwele 25:7

Mitindami

  • +1Sa 25:14-16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 78

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 19

1 Samwele 25:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “mokolo moko malamu.”

  • *

    Komibenga “mwana na yo” ntango ozali kosolola na moto ezalaki komonisa limemya.

Mitindami

  • +Mib 15:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 78

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 19

1 Samwele 25:10

Mitindami

  • +1Sa 22:2

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 78-79

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, nk. 19-20

1 Samwele 25:11

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 78-79

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, nk. 19-20

1 Samwele 25:13

Mitindami

  • +Nz 37:8; Mas 15:1; Mos 7:9

1 Samwele 25:14

Mitindami

  • +1Sa 25:10

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 76-77, 78-79

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, nk. 18-32

1 Samwele 25:15

Mitindami

  • +1Sa 25:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 78

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 19

1 Samwele 25:16

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 78

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 19

1 Samwele 25:17

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “moto mpamba.”

Mitindami

  • +1Sa 25:13
  • +1Sa 25:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 79

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 20

1 Samwele 25:18

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Sea moko = 7,33 L. Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +1Sa 25:3
  • +2Sa 16:1; 17:27-29

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 79-80

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 20

1 Samwele 25:19

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 20

1 Samwele 25:21

Mitindami

  • +1Sa 25:7
  • +1Sa 25:10; Nz 35:12

1 Samwele 25:22

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Tiká Nzambe asala banguna ya Davidi [to mbala mosusu, Davidi] bongo mpe abakisa yango.”

  • *

    Lil., “moto nyonso oyo asubaka na efelo.” Ezali maloba ya Ebre oyo esalemaka mpo na kotyola mibali.

1 Samwele 25:24

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/11/2002, nk. 4-5

1 Samwele 25:25

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Elimboli, “zoba; bolole.”

Mitindami

  • +1Sa 25:17

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 80

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, nk. 20-21

1 Samwele 25:26

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “lokola molimo na yo ezali.”

  • *

    To, “otika lobɔkɔ na yo moko ememela yo lobiko.”

Mitindami

  • +Eb 20:6
  • +Eb 9:6

1 Samwele 25:27

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lipamboli.”

Mitindami

  • +1Sa 25:18
  • +1Sa 22:2; 25:13

1 Samwele 25:28

Mitindami

  • +1Sa 15:28; 2Sa 7:8, 11; 1Ba 9:5
  • +1Sa 17:45; 18:17
  • +1Sa 24:11; 1Ba 15:5

1 Samwele 25:29

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “molimo.”

  • *

    To, “molimo.”

  • *

    To, “milimo.”

  • *

    To, “bilingongo.” Talá Ndimbola ya maloba.

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/6/1991, lok. 14

1 Samwele 25:30

Mitindami

  • +1Sa 13:13, 14; 23:17; 2Sa 6:21; 7:8; Nz 89:20

1 Samwele 25:31

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “lobɔkɔ na ye etengatenga to ebɛta libaku.”

Mitindami

  • +Mib 32:35; 1Sa 24:15

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 80

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, nk. 20-21

1 Samwele 25:33

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “namema lobiko.”

Mitindami

  • +Mib 19:10; 1Sa 25:26

1 Samwele 25:34

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “moto nyonso oyo asubaka na efelo.” Ezali maloba ya Ebre oyo esalemaka mpo na kotyola mibali.

Mitindami

  • +1Sa 25:24
  • +1Sa 25:18
  • +1Sa 25:22

1 Samwele 25:36

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 82

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 21

1 Samwele 25:37

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “motema na ye ekufaki na kati na ye.”

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 82

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 21

1 Samwele 25:38

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 82

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 21

1 Samwele 25:39

Mitindami

  • +1Sa 24:15; Nz 35:1
  • +1Sa 25:10, 14
  • +1Sa 25:34

1 Samwele 25:41

Mitindami

  • +Eb 18:3, 4; Lk 7:44

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 82-83

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 21

1 Samwele 25:42

Mitindami

  • +1Sa 25:3

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, nk. 82-83

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/7/2009, lok. 21

1 Samwele 25:43

Mitindami

  • +1Sa 27:3; 2Sa 3:2; 1Nt 3:1
  • +Yos 15:20, 56
  • +1Sa 30:5; 2Sa 5:13

1 Samwele 25:44

Mitindami

  • +1Sa 18:20
  • +2Sa 3:14, 15

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

1 Sa. 25:11Sa 1:20; 2:18; 3:20; Nz 99:6
1 Sa. 25:11Sa 7:15, 17
1 Sa. 25:21Sa 23:24
1 Sa. 25:2Yos 15:20, 55
1 Sa. 25:31Sa 25:25
1 Sa. 25:3Mit 13:6; 32:11, 12
1 Sa. 25:31Sa 27:3
1 Sa. 25:31Sa 25:17, 21
1 Sa. 25:71Sa 25:14-16
1 Sa. 25:8Mib 15:7
1 Sa. 25:101Sa 22:2
1 Sa. 25:13Nz 37:8; Mas 15:1; Mos 7:9
1 Sa. 25:141Sa 25:10
1 Sa. 25:151Sa 25:7
1 Sa. 25:171Sa 25:13
1 Sa. 25:171Sa 25:3
1 Sa. 25:181Sa 25:3
1 Sa. 25:182Sa 16:1; 17:27-29
1 Sa. 25:211Sa 25:7
1 Sa. 25:211Sa 25:10; Nz 35:12
1 Sa. 25:251Sa 25:17
1 Sa. 25:26Eb 20:6
1 Sa. 25:26Eb 9:6
1 Sa. 25:271Sa 25:18
1 Sa. 25:271Sa 22:2; 25:13
1 Sa. 25:281Sa 15:28; 2Sa 7:8, 11; 1Ba 9:5
1 Sa. 25:281Sa 17:45; 18:17
1 Sa. 25:281Sa 24:11; 1Ba 15:5
1 Sa. 25:301Sa 13:13, 14; 23:17; 2Sa 6:21; 7:8; Nz 89:20
1 Sa. 25:31Mib 32:35; 1Sa 24:15
1 Sa. 25:33Mib 19:10; 1Sa 25:26
1 Sa. 25:341Sa 25:24
1 Sa. 25:341Sa 25:18
1 Sa. 25:341Sa 25:22
1 Sa. 25:391Sa 24:15; Nz 35:1
1 Sa. 25:391Sa 25:10, 14
1 Sa. 25:391Sa 25:34
1 Sa. 25:41Eb 18:3, 4; Lk 7:44
1 Sa. 25:421Sa 25:3
1 Sa. 25:431Sa 27:3; 2Sa 3:2; 1Nt 3:1
1 Sa. 25:43Yos 15:20, 56
1 Sa. 25:431Sa 30:5; 2Sa 5:13
1 Sa. 25:441Sa 18:20
1 Sa. 25:442Sa 3:14, 15
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
  • 23
  • 24
  • 25
  • 26
  • 27
  • 28
  • 29
  • 30
  • 31
  • 32
  • 33
  • 34
  • 35
  • 36
  • 37
  • 38
  • 39
  • 40
  • 41
  • 42
  • 43
  • 44
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Samwele 25:1-44

Mokanda ya liboso ya Samwele

25 Na nsima, Samwele+ akufaki mpe Yisraele mobimba eyanganaki esika moko mpo na kolela ye. Bakundaki ye pene na ndako na ye na Rama.+ Nsima na yango, Davidi atɛlɛmaki mpe akitaki na esobe ya Parane.

2 Nzokande ezalaki na mobali moko na Maone,+ oyo mosala na ye ezalaki na Karamele.*+ Mobali yango azalaki na bozwi mingi; azalaki na bampate 3 000 mpe bantaba 1 000. Azalaki kokata nsuki ya bampate na ye na Karamele. 3 Nkombo ya mobali yango ezalaki Nabale,+ azalaki moto ya libota ya Kalebe,+ mpe nkombo ya mwasi na ye Abigaile.+ Mwasi yango azalaki mayele mpe kitoko mingi, kasi mobali na ye azalaki makambo makasimakasi mpe bizaleli mabe.+ 4 Na esobe, Davidi ayokaki ete Nabale azali kokata bampate na ye nsuki. 5 Bongo Davidi atindaki bilenge mibali zomi bákende epai na ye, mpe alobaki na bilenge mibali yango boye: “Bókende na Karamele, mpe ntango bokokóma epai ya Nabale, bótuna ye na nkombo na ngai soki azali malamu. 6 Na nsima, bóloba na ye: ‘Zalá na bomoi molai mpe kimya ezala na yo! Tiká ete libota na yo mpe nyonso oyo ozali na yango ezala malamu. 7 Sikoyo, nayoki ete ozali kokata bampate na yo nsuki. Ntango babateli ya mpate na yo bazalaki elongo na biso, tosalaki bango mabe te,+ mpe ata eloko na bango moko te ebungaki mikolo nyonso oyo balekisaki na Karamele. 8 Tuná bilenge mibali na yo mpe bakoyebisa yo. Tiká ete bilenge mibali na ngai bándimama na miso na yo, mpo toyei na ntango moko ya esengo.* Nabondeli yo, pesá basaleli na yo ná mwana* na yo Davidi mwa biloko ya kolya oyo okosepela kopesa bango.’”+

9 Na yango bilenge mibali ya Davidi bakendaki mpe bayebisaki Nabale maloba nyonso wana, na nkombo ya Davidi. Ntango basilisaki, 10 Nabale ayanolaki basaleli ya Davidi ete: “Ye Davidi, mwana ya Yese azali nani? Mikolo oyo, basaleli mingi bakómi kokima bankolo na bango.+ 11 Mpo na nini nazwa limpa na ngai ná mai na ngai mpe mosuni ya nyama na ngai oyo nakati mpe nabongisi mpo na bakati-nsuki ya bampate na ngai, mpe napesa yango bato oyo nayebi ata esika bauti te?”

12 Na yango bilenge mibali yango bazongaki, mpe bayebisaki Davidi maloba wana nyonso. 13 Na mbala moko, Davidi alobaki na bato na ye: “Moto na moto akanga mopanga na ye na loketo!”+ Na yango, bango nyonso bakangaki mipanga na bango na loketo; Davidi mpe asalaki kaka bongo. Mibali soki 400 bakendaki elongo na Davidi, kasi mibali 200 batikalaki mpo na kokɛngɛla bisaka.

14 Na ntango yango, moko ya bilenge mibali ya Nabale ayebisaki Abigaile ete: “Talá! Davidi atindaki bato longwa na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi nkolo na biso afingi bango mabe mpenza.+ 15 Mibali yango basalelaki biso bolamu mpenza. Basalá biso mabe ata mbala moko te, mpe tobungisaki ata eloko moko te mikolo nyonso oyo tozalaki elongo na bango na esobe.+ 16 Bazalaki lokola efelo oyo ezalaki kobatela biso, ezala na butu to na moi, mikolo nyonso oyo tozalaki elongo na bango, ntango tozalaki kokɛngɛla etonga. 17 Sikoyo, salá oyo okoki kosala mpo bakani komemela nkolo na biso ná ndako na ye mobimba mpasi.+ Nkolo na biso azali ntina te*+ mpe moto moko te akoki kosolola na ye.”

18 Bongo Abigaile+ azwaki nokinoki mampa 200, bilokó mibale ya minene ya vinyo, bampate mitano oyo babomi mpo na kolamba, sea* mitano ya mbuma oyo batumbi, bagato 100 ya mbuma ya vinyo, mpe bagato 200 ya figi oyo bafinafiná mpe atyaki yango likoló ya bampunda.+ 19 Na nsima alobaki na basaleli na ye: “Bino bókende liboso; ngai nakolanda na nsima.” Kasi ayebisaki mobali na ye Nabale eloko moko te.

20 Abigaile amataki likoló ya mpunda mpe azalaki kokita na nzela oyo ebombaná nsima ya ngomba. Davidi ná bato na ye mpe bazalaki kokita na nzela yango, mpe Abigaile akutanaki na bango. 21 Nzokande, Davidi azalaki koloba boye: “Nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo na esobe kaka mpamba! Ata eloko na ye moko te ebungaki,+ kasi ye azongiseli ngai mabe mpo na malamu.+ 22 Nzambe apesa banguna na ngai etumbu ya makasi* soki tii lobi na ntɔngɔ, nabomi te mibali nyonso ya ndako na ye.”*

23 Ntango Abigaile amonaki Davidi, akitaki nokinoki na mpunda mpe afukamaki, atye elongi na nse liboso na ye. 24 Na nsima, afukamaki na makolo ya Davidi mpe alobaki: “Ee nkolo na ngai, tiká mabe oyo basali yo ezala na motó na ngai! Tiká mosaleli na yo aloba na yo, mpe yoká maloba ya mosaleli na yo. 25 Nabondeli yo, nkolo na ngai, kotya motema te na makambo ya Nabale,+ mpo azali ntina te, kaka lokola nkombo na ye! Nkombo na ye ezali Nabale,* mpe azali na bozoba. Kasi ngai, mosaleli na yo, namonaki te bilenge mibali oyo nkolo na ngai atindaki. 26 Bongo sikoyo, nkolo na ngai, lokola Yehova azali solo na bomoi mpe lokola yo ozali* na bomoi, ezali Yehova nde apekisi yo+ omema ngambo ya makila+ mpe apekisi lobɔkɔ na yo moko ezongisa mabe na mabe.* Tiká banguna na yo mpe baoyo bazali koluka kosala nkolo na ngai mabe bákóma lokola Nabale. 27 Sikoyo, tiká ete likabo*+ oyo mosaleli na yo amemeli nkolo na ngai, epesama na bilenge mibali oyo bazali elongo na nkolo na ngai.+ 28 Nabondeli yo, limbisá mabe na ngai mosaleli na yo, mpo Yehova akozanga te kosala ete bakitani na yo báyangela mpo na ntango molai,+ mpo bitumba oyo ozali kobunda ezali ya Yehova,+ mpe mabe moko te ezwamá epai na yo mikolo nyonso ya bomoi na yo.+ 29 Soki moto atɛlɛmi mpo na kolanda yo mpe koluka bomoi* na yo, Yehova Nzambe na yo akozipa mpe akobomba bomoi* ya nkolo na ngai na kati ya saki ya bomoi, kasi akobwaka bomoi* ya banguna na yo ndenge babwakaka mabanga na lansi.* 30 Mpe ntango Yehova akokómisa nkolo na ngai mokambi ya Yisraele+ mpe akokokisela ye makambo nyonso ya malamu oyo alakaki ye, 31 nkolo na ngai akoyoka motema mpasi te mpo asopaki te makila kozanga ntina mpe atikaki te lobɔkɔ na ye ezongisa mabe na mabe.*+ Ntango Yehova akopambola yo, Ee nkolo na ngai, kanisá ngai mosaleli na yo.”

32 Na yango, Davidi alobaki na Abigaile: “Yehova Nzambe ya Yisraele azwa lokumu, ndenge atindi yo okutana na ngai na mokolo ya lelo! 33 Tiká ete Nzambe apambola yo mpo na mayele na yo! Lelo opekisi ngai namema ngambo ya makila+ mpe nazongisa mabe* na mabɔkɔ na ngai moko. 34 Mpo lokola Yehova Nzambe ya Yisraele oyo apekisi ngai kosala yo mabe+ azali solo na bomoi, soki oyaka kokutana na ngai nokinoki te,+ ata mobali* moko te ya ndako ya Nabale alingaki kotikala na bomoi lobi na ntɔngɔ.”+ 35 Bongo, Davidi andimaki kozwa biloko oyo Abigaile amemelaki ye, mpe alobaki na ye: “Zongá epai na yo na kimya. Talá, nayoki mongongo na yo mpe nakopesa yo oyo osɛngi.”

36 Na nsima, Abigaile azongaki epai ya Nabale. Nzokande, Nabale azalaki kosala fɛti moko na ndako na ye lokola fɛti ya mokonzi. Motema ya Nabale etondaki na esengo, mpe alangwaki mpenza kolangwa. Abigaile ayebisaki ye ata eloko moko te tii ntango ntɔngɔ etanaki. 37 Na ntɔngɔ, ntango molangwa ya Nabale esilaki, mwasi na ye ayebisaki ye makambo yango. Bongo Nabale akómaki lokola moto oyo akufi,* mpe azalaki koningana te lokola libanga. 38 Mikolo soki zomi na nsima, Yehova asalaki ete Nabale akufa.

39 Ntango Davidi ayokaki ete Nabale akufi, alobaki: “Tiká Yehova azwa lokumu, mpo akati likambo na ngai+ mpe alongoli ngai nsɔni oyo Nabale ayokisaki ngai+ mpe apekisi mosaleli na ye asala mabe,+ mpe Yehova apesi Nabale etumbu mpo na mabe na ye moko!” Na nsima, Davidi atindaki bato báyebisa Abigaile ete alingi kobala ye. 40 Na yango, basaleli ya Davidi bayaki epai ya Abigaile, na Karamele, mpe balobaki na ye: “Davidi atindi biso epai na yo mpo na kozwa yo, okóma mwasi na ye.” 41 Na mbala moko, Abigaile atɛlɛmaki, agumbamaki elongi na nse mpe alobaki: “Bóyebisa nkolo na ngai ete: Nazali mosaleli na ye. Nandimi kosukola makolo+ ya basaleli ya nkolo na ngai.” 42 Bongo Abigaile+ atɛlɛmaki nokinoki mpe amataki likoló ya mpunda na ye, mpe basaleli na ye mitano ya basi bazalaki kotambola na nsima na ye. Akendaki elongo na bato oyo Davidi atindaki mpe akómaki mwasi na ye.

43 Davidi abalaki mpe Ahinoame,+ moto ya engumba Yizireele;+ bango nyonso mibale bakómaki basi na ye.+

44 Kasi Saulo apesaki mwana na ye Mikale,+ oyo azalaki mwasi ya Davidi, epai ya Palati+ mwana ya Laishe, oyo azalaki moto ya engumba Galime.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto