Mitángo
34 Mpe Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 2 “Pesá Bayisraele mitindo oyo: ‘Ntango bokokɔta na mokili ya Kanana,+ oyo ezali bandelo ya mokili oyo bakokabolela bino lokola libula:+
3 “‘Ngámbo na bino ya sudi ekozala banda na esobe ya Zine pembenipembeni ya Edome, mpe ndelo na bino ya sudi ekozala banda na nsuka ya Mbu ya Mungwa.*+ 4 Ndelo na bino ekobaluka kobanda na sudi na nzela ya komata Akrabime+ mpe ekokoba tii na Zine, mpe nsuka na yango ekozala na sudi ya Kadeshe-barnea.+ Mpe ekobima na Hazare-adare+ mpe ekokoba tii na Azemone. 5 Ndelo yango ekobaluka na Azemone ekei na Lobwaku ya Ezipito,* mpe nsuka na yango ekozala na Mbu.*+
6 “‘Ndelo na bino ya wɛsti ekozala Mbu Monene* ná mabele ya pembenipembeni na yango. Ekozala ndelo na bino ya wɛsti.+
7 “‘Sikoyo talá oyo ekozala ndelo na bino ya nɔrdi: Kobanda na Mbu Monene, bokokata ndelo tii na Ngomba Hore+ mpo na bino. 8 Kobanda na Ngomba Hore, bokokata ndelo tii na Lebo-hamate,*+ mpe nsuka ya ndelo na yango ekozala na Zedade.+ 9 Mpe ndelo yango ekokende tii na Zifrone, mpe nsuka na yango ekozala na Hazare-enane.+ Ekozala ndelo na bino ya nɔrdi.
10 “‘Na nsima, bokokata ndelo na ɛsti kobanda na Hazare-enane tii na Shefame. 11 Ndelo ekokende kobanda Shefame tii na Ribla na ɛsti ya Aine, mpe ndelo yango ekokita mpe ekokatisa esika oyo ekitá ya mbu ya Kinerete,* na ɛsti.+ 12 Ndelo ekokende tii na Yordani, mpe nsuka na yango ekozala Mbu ya Mungwa.+ Yango ekozala mokili na bino+ mpe zingazinga ya bandelo na yango.’”
13 Bongo Moize apesaki Bayisraele malako ete: “Talá mokili oyo bino bokokabola na kobwaka mbɛsɛ+ mpo ezala ya bino, kaka ndenge Yehova apesaki mitindo ete bápesa na mabota libwa na ndambo. 14 Mpo libota ya Barubene, na kolanda ndako ya batata na bango, libota ya Bagade, na kolanda ndako ya batata na bango, mpe ndambo ya libota ya Manase basilaki kozwa libula na bango.+ 15 Mabota wana mibale na ndambo basilaki kozwa libula na bango etalani na Yeriko, na ɛsti ya ebale Yordani, epai moi ebimaka.”+
16 Yehova alobaki lisusu na Moize ete: 17 “Talá bankombo ya mibali oyo bakokabolela bino mokili mpo ezala ya bino: Eleazare+ nganga-nzambe mpe Yosua+ mwana ya Nunu. 18 Mpe bokozwa nkumu moko na libota mokomoko mpo na kokabola mokili mpo ezala ya bino.+ 19 Talá bankombo ya mibali yango: na libota ya Yuda:+ Kalebe+ mwana ya Yefune; 20 na libota ya bana ya Simeone:+ Shemuele mwana ya Amihude; 21 na libota ya Benyamina:+ Elidade mwana ya Kisilone; 22 na libota ya bana ya Dani:+ nkumu moko, Buki mwana ya Yogli; 23 na bana ya Yozefe,+ na libota ya bana ya Manase:+ nkumu moko, Hananiele mwana ya Efode; 24 na libota ya bana ya Efraime:+ nkumu moko, Kemuele mwana ya Shifitane; 25 na libota ya bana ya Zebulone:+ nkumu moko, Elizafane mwana ya Parnake; 26 na libota ya bana ya Isakare:+ nkumu moko, Palatiele mwana ya Azane; 27 na libota ya bana ya Ashere:+ nkumu moko, Ahihude mwana ya Shelomi; 28 na libota ya bana ya Nafatali:+ nkumu moko, Pedahele mwana ya Amihude.” 29 Bango nde bato oyo Yehova apesaki mitindo ete bákabolela Bayisraele mabele na mokili ya Kanana.+