Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 25
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Malako etali kobɛta moto (1-3)

      • Osengeli te kokanga monɔkɔ ya ngɔmbɛ wana ezali kotutatuta mbuma (4)

      • Libala-lisangó (5-10)

      • Kosimba moto na esika ya mabe na ntango ya etumba (11, 12)

      • Kilo mpe emekeli-kilo ya solosolo (13-16)

      • Baamaleke basengeli kobomama (17-19)

Kolimbola Mibeko 25:1

Mitindami

  • +Mib 16:18; 17:8, 9; 19:16, 17
  • +Kob 23:6; 2Nt 19:6; Mas 17:15; 31:9

Kolimbola Mibeko 25:2

Mitindami

  • +Mas 10:13; 20:30; 26:3; Lk 12:48; Ebr 2:2

Kolimbola Mibeko 25:3

Mitindami

  • +2Ko 11:24

Kolimbola Mibeko 25:4

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “mbuma ya kosala farini.”

Mitindami

  • +Mas 12:10; 1Ko 9:9; 1Ti 5:18

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/5/2012, lok. 30

Kolimbola Mibeko 25:5

Mitindami

  • +Eb 38:7, 8; Rt 4:5; Mr 12:19

Kolimbola Mibeko 25:6

Mitindami

  • +Eb 38:9; Rt 4:10, 17
  • +Mit 27:1, 4

Kolimbola Mibeko 25:9

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “kotonga ndako.”

Mitindami

  • +Rt 4:7

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/9/2004, lok. 26

Kolimbola Mibeko 25:10

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “nkombo ya ndako na ye.” Lil., “nkombo na ye.”

Kolimbola Mibeko 25:12

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Liso na yo esengeli.”

Kolimbola Mibeko 25:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kilo ya libanga.”

Mitindami

  • +Mas 11:1; 20:10; Mik 6:11

Kolimbola Mibeko 25:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “Na ndako na yo osengeli te kozala na efa ná efa.” Talá Ap. B14.

Mitindami

  • +Le 19:36

Kolimbola Mibeko 25:15

Mitindami

  • +Mib 4:40

Kolimbola Mibeko 25:16

Mitindami

  • +Le 19:35

Kolimbola Mibeko 25:17

Mitindami

  • +Kob 17:8; Mit 24:20

Kolimbola Mibeko 25:19

Mitindami

  • +Yos 22:4
  • +Kob 17:14; 1Sa 14:47, 48; 15:1-3; 1Nt 4:42, 43

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Mekolá, lok. 144

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/1/2012, lok. 29

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 25:1Mib 16:18; 17:8, 9; 19:16, 17
Mib. 25:1Kob 23:6; 2Nt 19:6; Mas 17:15; 31:9
Mib. 25:2Mas 10:13; 20:30; 26:3; Lk 12:48; Ebr 2:2
Mib. 25:32Ko 11:24
Mib. 25:4Mas 12:10; 1Ko 9:9; 1Ti 5:18
Mib. 25:5Eb 38:7, 8; Rt 4:5; Mr 12:19
Mib. 25:6Eb 38:9; Rt 4:10, 17
Mib. 25:6Mit 27:1, 4
Mib. 25:9Rt 4:7
Mib. 25:13Mas 11:1; 20:10; Mik 6:11
Mib. 25:14Le 19:36
Mib. 25:15Mib 4:40
Mib. 25:16Le 19:35
Mib. 25:17Kob 17:8; Mit 24:20
Mib. 25:19Yos 22:4
Mib. 25:19Kob 17:14; 1Sa 14:47, 48; 15:1-3; 1Nt 4:42, 43
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 25:1-19

Kolimbola Mibeko

25 “Soki kowelana ebimi na kati ya bato, bakokende liboso ya basambisi.+ Mpe basambisi bakotánga moto ya sembo ete azali na ngambo te mpe moto mabe bakotánga ye ete azali na ngambo.+ 2 Soki esengeli ete moto mabe abɛtama,+ mosambisi akosɛnga ete bálalisa ye na nse mpe bábɛta ye fimbo na miso ya mosambisi yango. Motángo ya fimbo ekoyokana na likambo ya mabe oyo asali. 3 Akoki kobɛta ye fimbo 40,+ kasi koleka te. Soki akobi kobɛta ye fimbo mingi koleka oyo wana, ndeko na yo akosambwa na miso na yo.

4 “Ntango ngɔmbɛ ezali kotutatuta mbuma* osengeli te kokanga monɔkɔ na yango mpo elya te.+

5 “Soki bandeko mibali bafandi esika moko mpe moko na bango akufi, kasi aboti mwana te, mwasi ya mobali oyo akufi asengeli te kobala na libota mosusu. Sɛmɛki na ye akokende epai na ye, mpe akozwa ye azala mwasi na ye mpe bakosala libala ya bosɛmɛki.+ 6 Mwana ya liboso oyo mwasi yango akobota, akozwa nkombo ya ndeko na ye ya mobali oyo akufi,+ mpo nkombo na ye elimwa te na Yisraele.+

7 “Kasi soki mobali yango asepeli te kobala mwasi ya ndeko na ye oyo akufi, mwasi yango asengeli kokende epai ya bankulutu na porte ya engumba mpe akoloba ete: ‘Ndeko ya mobali na ngai aboyi kobatela nkombo ya ndeko na ye na Yisraele. Andimi te kosala ná ngai libala ya bosɛmɛki.’ 8 Bankulutu ya engumba na ye basengeli kobenga ye mpe kosolola na ye. Soki akobi kaka koboya, mpe alobi ete: ‘Nasepeli kobala ye te,’ 9 na yango, mwasi ya ndeko na ye oyo akufaki akopusana epai na ye na miso ya bankulutu, akolongola ye sandale na lokolo,+ akobwakela ye nsoi na elongi mpe akoloba ete: ‘Boye nde basengeli kosala mobali oyo aboyi kobatela molɔngɔ ya libota* ya ndeko na ye ya mobali.’ 10 Nsima na yango, nkombo ya libota na ye* na Yisraele, ekozala: ‘Ndako ya moto oyo balongolá sandale.’

11 “Soki mibali mibale bazali kobunda mpe mwasi ya moko na bango apusani mpo na kobikisa mobali na ye epai ya moto oyo azali kobɛta ye, mpe mwasi yango asemboli lobɔkɔ na ye mpe asimbi mobali yango na biteni ya nzoto na ye ya mobali, 12 osengeli kokata lobɔkɔ ya mwasi yango. Osengeli* koyoka mawa te.

13 “Na libenga na yo, osengeli te kozala na kilo* mibale oyo ekeseni,+ ya monene ná ya moke. 14 Na ndako na yo, osengeli te kozala na biloko mibale ekeseni ya komekela,*+ ya monene ná ya moke. 15 Okozala ntango nyonso na kilo ya solosolo mpe ya sembo mpe emekeli ya solosolo mpe ya sembo, mpo ozala na bomoi molai na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.+ 16 Mpo moto nyonso oyo azali sembo te, oyo azali kosala makambo wana, azali moto oyo Yehova Nzambe na yo ayiná.+

17 “Kanisá makambo oyo Amaleke asalaki yo na nzela nsima ya kobima na Ezipito,+ 18 ndenge akutanaki na yo na nzela mpe abundisaki baoyo nyonso bazalaki kolanda yo na nsima, ntango osilaki makasi mpe olɛmbaki. Abangaki Nzambe te. 19 Ntango Yehova Nzambe na yo akopemisa yo liboso ya banguna na yo nyonso zingazinga, na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula mpo ozwa yango,+ okolongola nkombo ya Amaleke na nse ya lola.+ Osengeli kobosana yango te.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto