Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 24
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Kolimbola Mibeko

      • Libala mpe koboma libala (1-5)

      • Limemya mpo na bomoi (6-9)

      • Kotyela babola likebi (10-18)

      • Mibeko mpo na kolɔkɔta mbuma oyo etikali (19-22)

Kolimbola Mibeko 24:1

Mitindami

  • +Mt 5:31, 32; Mr 10:4, 11
  • +Mal 2:16; Mt 1:19; 19:3-8

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    12/2018, lok. 11

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    8/2016, lok. 6

    Yesu azali nzela, lok. 222

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/9/2008, lok. 25

    15/8/1993, lok. 4

    “Landá ngai,” nk. 104-105

Kolimbola Mibeko 24:2

Mitindami

  • +Le 21:7

Kolimbola Mibeko 24:3

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “aboyi.”

Kolimbola Mibeko 24:5

Mitindami

  • +Mib 20:7; Mas 5:18; Mos 9:9

Kolimbola Mibeko 24:6

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “kozwa bomoi; kozwa molimo.”

Mitindami

  • +Kob 22:26, 27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    1/6/2014, lok. 7

    15/9/2004, lok. 26

Kolimbola Mibeko 24:7

Mitindami

  • +Eb 37:28; 40:15
  • +Kob 21:16
  • +Mib 19:18, 19; 21:20, 21

Kolimbola Mibeko 24:8

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “maladi ya maba” ezali na ndimbola mingi. Ekoki kolimbola, maladi ndenge na ndenge ya loposo oyo moto moko akoki kopesa moto mosusu. Ekoki mpe kolimbola, maladi mosusu oyo ezalaka na bilamba mpe na bandako.

Mitindami

  • +Le 13:2, 15; Mr 1:44; Lk 17:14

Kolimbola Mibeko 24:9

Mitindami

  • +Mit 12:10, 15

Kolimbola Mibeko 24:10

Mitindami

  • +Mib 15:7, 8; Mas 3:27

Kolimbola Mibeko 24:12

Mitindami

  • +Yb 24:9, 10

Kolimbola Mibeko 24:13

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Mitindami

  • +Kob 22:26, 27

Kolimbola Mibeko 24:14

Maloba na nse ya lokasa

  • *

    Lil., “baporte.”

Mitindami

  • +Le 25:39, 43; Mas 14:31

Kolimbola Mibeko 24:15

Mitindami

  • +Le 19:13; Yir 22:13; Mt 20:8
  • +Mas 22:22, 23; Yk 5:4

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    1/2018, lok. 32

Kolimbola Mibeko 24:16

Mitindami

  • +2Nt 25:3, 4
  • +Ezk 18:20

Kolimbola Mibeko 24:17

Mitindami

  • +Kob 22:21, 22
  • +Kob 22:26, 27

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ya boyekoli),

    2/2019, nk. 24-25

Kolimbola Mibeko 24:18

Mitindami

  • +Mib 5:15

Kolimbola Mibeko 24:19

Mitindami

  • +Le 19:9; 23:22; Rt 2:16; Nz 41:1
  • +Mib 15:7, 10; Mas 11:24; 19:17; Lk 6:38; 2Ko 9:6; 1Yn 3:17

Kolimbola Mibeko 24:20

Mitindami

  • +Le 19:10; Mib 26:13

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mib. 24:1Mt 5:31, 32; Mr 10:4, 11
Mib. 24:1Mal 2:16; Mt 1:19; 19:3-8
Mib. 24:2Le 21:7
Mib. 24:5Mib 20:7; Mas 5:18; Mos 9:9
Mib. 24:6Kob 22:26, 27
Mib. 24:7Eb 37:28; 40:15
Mib. 24:7Kob 21:16
Mib. 24:7Mib 19:18, 19; 21:20, 21
Mib. 24:8Le 13:2, 15; Mr 1:44; Lk 17:14
Mib. 24:9Mit 12:10, 15
Mib. 24:10Mib 15:7, 8; Mas 3:27
Mib. 24:12Yb 24:9, 10
Mib. 24:13Kob 22:26, 27
Mib. 24:14Le 25:39, 43; Mas 14:31
Mib. 24:15Le 19:13; Yir 22:13; Mt 20:8
Mib. 24:15Mas 22:22, 23; Yk 5:4
Mib. 24:162Nt 25:3, 4
Mib. 24:16Ezk 18:20
Mib. 24:17Kob 22:21, 22
Mib. 24:17Kob 22:26, 27
Mib. 24:18Mib 5:15
Mib. 24:19Le 19:9; 23:22; Rt 2:16; Nz 41:1
Mib. 24:19Mib 15:7, 10; Mas 11:24; 19:17; Lk 6:38; 2Ko 9:6; 1Yn 3:17
Mib. 24:20Le 19:10; Mib 26:13
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
  • 14
  • 15
  • 16
  • 17
  • 18
  • 19
  • 20
  • 21
  • 22
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Kolimbola Mibeko 24:1-22

Kolimbola Mibeko

24 “Soki mobali moko abali mwasi, kasi asepeli na ye lisusu te mpo akuti likambo moko ya mabe epai ya mwasi yango, asengeli kokoma mokanda ya koboma libala,+ kopesa ye yango mpe akobengana ye na ndako na ye.+ 2 Nsima ya kolongwa na ndako na ye, akoki kokende mpe kokóma mwasi ya mobali mosusu.+ 3 Soki mobali ya mibale ayini* ye mpe akomi mokanda ya koboma na ye libala, apesi ye yango, mpe abengani ye na ndako na ye, to soki mobali yango ya mibale, oyo abalaki ye akufi, 4 mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye, akozala na lotomo te ya kozwa ye lisusu mpo azala mwasi na ye nsima ya kokóma mbindo, mpo ezali likambo moko oyo eyinamá na miso ya Yehova. Osengeli te komema lisumu na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo libula.

5 “Mobali oyo auti kobala sika, akokende etumba te mpe bakopesa ye ata mosala moko te asala. Bakosɛnga ye eloko te na boumeli ya mbula moko, akotikala na ndako mpe akosepelisa mwasi na ye.+

6 “Moto moko te akokanga lokola ndanga+ enikelo ya mabɔkɔ to libanga na yango ya konikela ya likoló, ekozala lokola kozwa ndanga eloko oyo moto abikelaka.*

7 “Soki bakuti moto moko akangi ndeko na ye moyisraele na makasi, akei na ye, anyokoli ye mpe atɛki ye,+ moyibi yango asengeli kokufa.+ Osengeli kolongola oyo ezali mabe epai na yo.+

8 “Soki maladi ya maba* ebimi, salá makasi mpenza ete osala makambo nyonso oyo banganga-nzambe Balevi, bakoyebisa yo.+ Salá makasi mpo osala kaka ndenge napesaki bango mitindo. 9 Kanisá lisusu oyo Yehova Nzambe na yo asalaki Miriame na nzela nsima ya kobima na bino na Ezipito.+

10 “Soki odefisi mozalani na yo eloko ata ya lolenge nini,+ osengeli te kokɔta na ndako na ye mpo na kokanga eloko oyo apesi ndanga. 11 Okotɛlɛma libándá, mpe moto oyo odefisaki eloko akomemela yo ndanga yango na libándá. 12 Soki moto yango azali kokelela, osengeli te kolala na eloko na ye oyo apesaki ndanga.+ 13 Ntango moi ekolala, osengeli mpenza kozongisela ye eloko oyo ozwaki lokola ndanga, akolala na elamba na ye,+ mpe akopambola yo; mpe yango ekozala likambo ya bosembo* liboso ya Yehova Nzambe na yo.

14 “Osengeli te kobuba mosali oyo azwaka lifuti, oyo azali kokelela mpe azali mobola, ezala ndeko na yo to mopaya oyo afandi na mokili na yo, na kati ya bingumba* na yo.+ 15 Okopesa ye lifuti na ye kaka na mokolo yango+ liboso moi elala, mpo azali na bosɛnga mpe abikaka kaka na lifuti na ye. Soki te, akolelela Yehova mpo na yo, mpe okozala na ngambo ya lisumu.+

16 “Batata bakobomama te mpo na makambo oyo bana basali, mpe bana bakobomama te mpo na makambo oyo batata basali.+ Moto akobomama kaka mpo na lisumu na ye moko.+

17 “Osengeli te kozanga bosembo ntango ozali kosambisa likambo ya moto oyo afandi mopaya to ya mwana oyo tata akufá,+ mpe osengeli te kokanga ndanga elamba ya mwasi oyo mobali akufá.+ 18 Kobosana te ete okómaki moombo na Ezipito, mpe Yehova Nzambe na yo asikolaki yo kuna.+ Yango wana nazali kopesa yo mitindo ete osala bongo.

19 “Ntango okobuka mbuma na elanga na yo, mpe obosani na elanga liboke moko ya matiti ya mbuma ya kosala farini, kozonga te mpo na kozwa yango. Okotika yango mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá,+ bongo Yehova Nzambe na yo apambola yo na nyonso oyo ozali kosala.+

20 “Ntango okobɛtabɛta nzete na yo ya olive mpo na kobuka mbuma na yango, okozonga te kobɛtabɛta bitape na yango mpo na mbala ya mibale. Oyo ekotikala ekozala mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá.+

21 “Ntango okobuka mbuma na elanga na yo ya vinyo, osengeli te kozongela lisusu mbuma oyo ekotikala. Okotika yango mpo na moto oyo afandi mopaya, mpo na mwana oyo tata akufá mpe mpo na mwasi oyo mobali akufá. 22 Kobosana te ete okómaki moombo na mokili ya Ezipito. Yango wana nazali kopesa yo mitindo ete osala bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto