Nzembo
Maskile.* Libondeli ya Davidi, ntango azalaki na mobenga.+
142 Na mongongo na ngai, nabelelaka Yehova mpo na kosɛnga lisalisi;+
Na mongongo na ngai, nabondelaka Yehova mpo amonisela ngai boboto.
Bongo otalaki nzela na ngai.+
Na nzela oyo nazali kotambola,
Babombeli ngai motambo.
5 Ee Yehova, nazali kobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi.
Nalobi ete: “Ozali esika na ngai ya kokima,+
Nyonso nazali na yango na mokili ya bato ya bomoi.”
6 Tyá likebi na koganga na ngai mpo na kosɛnga lisalisi,
Mpo natungisami makasi mpenza.
Bikisá ngai na banyokoli na ngai,+
Mpo bazali makasi mingi koleka ngai.
7 Bimisá ngai na kasho
Mpo nasanzola nkombo na yo.
Bato ya sembo báyangana zingazinga na ngai
Mpo osaleli ngai makambo na boboto.