Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 36
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

Na kati ya Mitángo

      • Mobeko mpo na libala ya basi oyo bazali na libula (1-13)

Mitángo 36:1

Mitindami

  • +Mit 26:29

Mitángo 36:2

Mitindami

  • +Mit 26:55; 33:54
  • +Mit 27:1-7

Mitángo 36:4

Mitindami

  • +Le 25:10

Mitángo 36:8

Mitindami

  • +1Nt 23:22

Mitángo 36:10

Mitindami

  • +Mit 36:6

Ba index

  • Mpo na kosala bolukiluki

    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,

    15/2/2008, nk. 4-5

Mitángo 36:11

Mitindami

  • +Mit 27:1

Mitángo 36:13

Mitindami

  • +Mit 26:3; 33:50; 35:1

Mabongoli mosusu

Finá vɛrsɛ moko mpo obimisa bavɛrsɛ mosusu.

Makambo mosusu

Mit. 36:1Mit 26:29
Mit. 36:2Mit 26:55; 33:54
Mit. 36:2Mit 27:1-7
Mit. 36:4Le 25:10
Mit. 36:81Nt 23:22
Mit. 36:10Mit 36:6
Mit. 36:11Mit 27:1
Mit. 36:13Mit 26:3; 33:50; 35:1
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Tángá na Biblia (bi12)
  • 1
  • 2
  • 3
  • 4
  • 5
  • 6
  • 7
  • 8
  • 9
  • 10
  • 11
  • 12
  • 13
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mitángo 36:1-13

Mitángo

36 Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Gileade mwana ya Makire,+ mwana ya Manase na mabota ya bana ya Yozefe bapusanaki mpe balobaki liboso ya Moize mpe bankumu, bakonzi ya mabota ya Bayisraele. 2 Balobaki ete: “Yehova apesaki nkolo na ngai mitindo ya kokabolela Bayisraele mokili lokola libula na kobwaka mbɛsɛ;+ mpe nkolo na ngai azwaki mitindo epai ya Yehova ya kopesa libula ya ndeko na biso ya mobali Zelofehade epai ya bana na ye ya basi.+ 3 Soki babalani na mibali ya mabota mosusu ya Bayisraele, libula ya basi yango ekolongolama na libula ya batata na biso mpe ekobakisama na libula ya libota oyo bango bakɔti, bongo ekolongolama na mabele ya libula na biso. 4 Sikoyo soki Yubilé+ ekómi mpo na bato ya Yisraele, libula ya basi yango ekobakisama mpe na libula ya libota oyo bakɔti, boye libula na bango ekolongolama na libula ya libota ya batata na biso.”

5 Bongo, na etinda ya Yehova, Moize apesaki Bayisraele mitindo ete: “Libota ya bana ya Yozefe ezali koloba malamu. 6 Talá mitindo oyo Yehova apesi mpo na bana basi ya Zelofehade, alobi: ‘Bakoki kobalana na bato oyo bango balingi. Kasi bakobalana kaka na bato ya libota ya etuluka ya batata na bango. 7 Libula ya Bayisraele ekolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu te, mpo Bayisraele bakokangama na libula ya libota ya bankɔkɔ na bango. 8 Mpe mwana mwasi nyonso oyo azwi libula kati na mabota ya Yisraele akokóma mwasi ya moto ya libota ya tata na ye,+ mpo Bayisraele bábatela libula ya bankɔkɔ na bango. 9 Libula moko te ekolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, mpo mabota ya Yisraele ekokangama na libula na yango moko.’”

10 Bana basi ya Zelofehade basalaki kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.+ 11 Na yango, Mahala, Tireza, Hogla, Milka ná Noa, bana basi ya Zelofehade,+ babalanaki na bana mibali ya bandeko mibali ya tata na bango. 12 Bakómaki basi ya mibali ya mabota ya Manase mwana ya Yozefe, mpo libula na bango ekoba kozala na libota ya tata na bango.

13 Wana nde mitindo mpe bikateli oyo Yehova apesaki Bayisraele na nzela ya Moize na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pene na Yordani, na Yeriko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto