MOSAKOLI*
1 Maloba ya moyanganisi,*+ mwana ya Davidi mokonzi na Yerusaleme.+
6 Mopɛpɛ ekendaka na sudi, mpe ebalukaka na nɔrdi;
Ezali kobaluka mpe kobalukabaluka ntango nyonso; mopɛpɛ ezali kokoba kobaluka.
7 Mai ya mikɛli nyonso etíyolaka na mbu, kasi mbu etondaka te.+
Epai mikɛli eutaka mpo na kotíyola, kuna ezongaka mpo na kotíyola lisusu.+
8 Biloko nyonso elɛmbisaka;
Moto moko te akoki ata kolobela yango.
Liso elɛmbaka kotala te,
Litoi mpe elɛmbaka koyoka te.
9 Oyo ezalaki, yango nde ekozala,
Mpe oyo esalemaki, ekosalema lisusu;
Eloko moko ya sika ezali te na nse ya moi.+
10 Ezali nde na eloko moko oyo moto akoki koloba ete: “Talá oyo, ezali ya sika”?
Esilá kozala banda kala;
Esilá kozala liboso ya ntango na biso.
11 Moto moko te akanisaka bato ya ntango ya kala;
Moto moko mpe te akokanisa baoyo bakoya nsima;
Bango mpe, bato oyo bakoya nsima bakokanisa bango mpe te.+
12 Ngai, moyanganisi, nazalaki mokonzi ya Yisraele na Yerusaleme.+ 13 Natyaki motema na ngai mpo na koyekola mpe kotalatala na bwanya+ eloko nyonso oyo esalemá na nse ya lola,+ elingi koloba mosala ya mpasi oyo Nzambe apesá bana ya bato básala.
14 Namonaki misala nyonso oyo esalemaki na mabele,
Mpe talá! eloko nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+
15 Oyo etɛngami ekoki kosembolama te,
Mpe oyo ezali kozanga ekoki kotángama te.
16 Bongo nalobaki na motema na ngai boye: “Talá! Nazwi bwanya mingi koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai na Yerusaleme,+ mpe motema na ngai ezwaki bwanya mingi mpe boyebi.”+ 17 Nasalaki ete motema na ngai eyeba bwanya, eyeba ligboma,* mpe eyeba bozoba.+ Yango mpe ezali kaka kolanda mopɛpɛ.
18 Mpo kokóma na bwanya mingi ememaka mitungisi mingi,
Yango wana moto oyo abakisaka boyebi abakisaka mpasi.+
2 Bongo nalobaki na motema na ngai boye: “Yaká, nameká naino bisengo mpe namona bolamu oyo ekobimisa.” Kasi talá! Yango mpe ezalaki mpamba.
2 Nalobaki mpo na kosɛka ete: “Ligboma!”
Mpe mpo na kosepela ete: “Ezali na ntina nini?”
3 Nalukaki komisepelisa na vinyo,+ wana nazalaki kobatela ntango nyonso bwanya na ngai moko; nalandaki ata bozoba, nalukaki koyeba eloko oyo eleki malamu mpo bato básala na mwa mikolo ya bomoi na bango na nse ya lola. 4 Nasalaki misala minene.+ Natongaki bandako;+ nalonaki bilanga ya vinyo.+ 5 Namisalelaki bilanga ná bazamba, mpe nalonaki na kati banzete ya mbuma ya ndenge nyonso. 6 Namisalelaki maziba ya mai, mpo na kosopa mai na yango na zamba, mpo na kokolisa banzete. 7 Nazwaki basaleli ya mibali mpe ya basi,+ mpe nakómaki na basaleli oyo babotamaki na ndako* na ngai. Lisusu, nakómaki na bibwɛlɛ, bangɔmbɛ mpe bitonga ya bampate mingi mpenza,+ koleka baoyo nyonso bazalaki liboso na ngai na Yerusaleme. 8 Nandukaki palata ná wolo mpo na ngai moko,+ biloko ya motuya* ya bakonzi mpe ya bitúká.+ Nasangisaki mpo na ngai moko bayembi ya mibali, ya basi mpe makambo oyo esepelisaka mpenza bana ya bato: mwasi, ɛɛ, basi. 9 Bongo nakómaki moto monene mpe nalekaki moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai na Yerusaleme.+ Mpe nabatelaki kaka bwanya na ngai.
10 Nazalaki kosala eloko nyonso oyo nazalaki na mposa na yango.*+ Napimelaki motema na ngai ata esengo moko te, mpo motema na ngai esepelaki na mosala na ngai nyonso ya makasi, mpe yango ezalaki mbano* na ngai oyo euti na mosala na ngai nyonso ya makasi.+ 11 Kasi ntango natalaki misala nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala nyonso ya makasi oyo nakokisaki,+ namonaki ete nyonso ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ,+ eloko moko te ya motuya* mpenza ezali na nse ya moi.+
12 Bongo natyaki likebi na ngai na bwanya, ligboma ná bozoba.+ (Mpo eloko nini moto oyo akoya nsima ya mokonzi akoki kosala? Kaka eloko oyo bato basilá kosala.) 13 Mpe namonaki ete bwanya ezali na litomba koleka bozoba,+ kaka ndenge pole ezali na litomba koleka molili.
14 Moto ya bwanya, amonaka makambo polele;*+ kasi zoba atambolaka na molili.+ Nayaki mpe koyeba ete bango nyonso basukaka kaka ndenge moko.+ 15 Bongo nalobaki na motema na ngai ete: “Oyo ekómelaka zoba ekokómela mpe ngai.”+ Bongo nazwi nini ndenge nakómaki na bwanya koleka ndelo? Bongo nalobaki na motema na ngai: “Yango mpe ezali mpamba.” 16 Mpo bakokanisa moto ya bwanya mpo na libela te koleka zoba.+ Na mikolo ezali koya bakobosana bango nyonso. Mpe moto ya bwanya akokufa ndenge nini? Ndenge moko na zoba.+
17 Bongo nayinaki bomoi,+ mpamba te, eloko nyonso oyo esalemaki na nse ya moi emonanaki motungisi mpo na ngai, mpo nyonso ezalaki mpamba+ mpe kolanda mopɛpɛ.+ 18 Nayinaki mosala nyonso ya makasi oyo nasalaki na nse ya moi,+ mpo nasengelaki kotikela yango moto oyo akoya nsima na ngai.+ 19 Mpe nani ayebi soki akozala moto ya bwanya to zoba?+ Nzokande akozala na bokonzi likoló ya biloko na ngai nyonso oyo nazwá na nse ya moi na nzela ya molende makasi mpe bwanya na ngai. Yango mpe ezali mpamba. 20 Mpe na motema na ngai nakómaki kozanga elikya mpo na mosala nyonso ya makasi oyo nasalaki na nse ya moi. 21 Mpo moto akoki kosala mosala makasi na bwanya, na boyebi mpe na mayele, kasi asengeli kotika eteni* na ye na moto oyo asali mosala te mpo na kozwa yango.+ Yango mpe ezali mpamba mpe mpasi monene mpenza.
22 Moto azwaka mpenza nini na mosala na ye nyonso ya makasi mpe mposa makasi oyo etindaka ye* asala mosala makasi na nse ya moi?+ 23 Mpo na mikolo na ye nyonso, mosala na ye ememaka kaka mpasi mpe mitungisi,+ mpe ata na butu, motema na ye epemaka te.+ Yango mpe ezali kaka mpamba.
24 Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya, komɛla mpe kosepela na mosala na ye ya makasi.+ Yango mpe, namoni ete euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo,+ 25 mpo nani alyaka malamu mpe amɛlaka malamu koleka ngai?+
26 Nzambe ya solo apesaka bwanya, boyebi ná esengo epai ya moto oyo asepelisaka ye,+ kasi epai ya mosumuki apesaka ye mosala ya koyanganisa mpe ya kosangisa kaka mpo na kopesa moto oyo asepelisaka Nzambe ya solo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.
3 Eloko nyonso ezali na ntango na yango,
Likambo na likambo ezali na ntango na yango na nse ya lola:
2 Ntango ya kobotama mpe ntango ya kokufa;
Ntango ya kolona mpe ntango ya kopikola eloko oyo elonamaki;
3 Ntango ya koboma mpe ntango ya kobikisa;
Ntango ya kobuka mpe ntango ya kotonga;
4 Ntango ya kolela mpe ntango ya kosɛka;
Ntango ya koganga na kolela mpe ntango ya kobina;*
5 Ntango ya kobwaka mabanga mpe ntango ya kosangisa mabanga;
Ntango ya koyamba mpe ntango ya koboya koyamba;
6 Ntango ya koluka mpe ntango ya kotika koluka eloko oyo ebungi;
Ntango ya kobomba mpe ntango ya kobwaka;
7 Ntango ya kopasola elamba+ mpe ntango ya kotonga yango;
Ntango ya kofanda kimya+ mpe ntango ya koloba;+
8 Ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina;+
Ntango ya etumba mpe ntango ya kimya.
9 Mosali akozwa litomba nini mpo na milende na ye nyonso?+ 10 Namoni mosala oyo Nzambe apesi bana ya bato básala. 11 Asalá eloko nyonso kitoko* na ntango na yango.+ Atyá na mitema ya bato mposa ya kozala na bomoi ya seko, nzokande bakoyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.
12 Nayei koyeba ete eloko oyo eleki malamu mpo na bango ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na bomoi na bango mobimba,+ 13 lisusu ete moto nyonso alya, amɛla mpe azwa esengo mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.+
14 Nayei koyeba ete eloko nyonso oyo Nzambe ya solo asalaka, ekozala mpo na libela. Eloko ya kobakisa to mpe ya kolongola ezali te. Nzambe ya solo asalá yango bongo, mpo bato bábanga ye.+
15 Oyo esalemaka, esilá kosalema, mpe oyo ekoya esilá koya;+ kasi Nzambe ya solo alukaka oyo bato balandi.*
16 Namoni lisusu likambo oyo na nse ya moi: na esika ya bosembo, mabe ezalaki, mpe na esika ya boyengebene, mabe ezalaki.+ 17 Bongo nalobaki na motema na ngai ete: “Nzambe ya solo akosambisa moto ya sembo ná moto mabe,+ mpo likambo na likambo mpe mosala na mosala ezali na ntango na yango.”
18 Nalobaki na motema na ngai mpo na bana ya bato ete Nzambe ya solo akomeka bango, mpe akomonisa bango ete bazali lokola banyama. 19 Mpo bana ya bato bazali na nsuka, nyama mpe ezali na nsuka, bango nyonso basukaka ndenge moko.+ Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akufaka bongo; bango nyonso bazali na elimo kaka moko.+ Na yango, moto aleki nyama te, nyonso ezali mpamba. 20 Bango nyonso bakokende esika moko.+ Bango nyonso bauti na putulu,+ mpe bango nyonso bazali kozonga na putulu.+ 21 Nani ayebi mpenza soki elimo ya bana ya bato emataka na likoló, mpe soki elimo ya nyama ekitaka na nse, na mabele?+ 22 Mpe namoni ete eloko oyo eleki malamu ezali te, longola kaka ete moto asepela na mosala na ye,+ mpo yango nde mbano* na ye; mpo nani akopesa ye likoki ya komona makambo oyo ekosalema nsima ya liwa na ye?+
4 Lisusu natyaki likebi na minyoko nyonso oyo ezali kosalema na nse ya moi, mpe namonaki mai ya miso ya bato oyo bazalaki konyokwama, kasi moto moko te azalaki mpo na kobɔndisa bango.+ Mpe bato oyo bazalaki konyokola bango bazalaki na nguya, mpe moto ya kobɔndisa bango azalaki te. 2 Mpe napesaki bato oyo bakufá longonya na esika ya kopesa bato oyo bazali naino na bomoi.+ 3 Mpe moto oyo aleki bango mibale ezali moto oyo abotami naino te,+ oyo amoni te misala ya mpasi oyo ezali kosalema na nse ya moi.+
4 Namoni ndenge milende* makasi mpe mayele ya mosala eutaka na kowelana kati na bato;+ yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.
5 Zoba akangi mabɔkɔ wana mosuni na ye ezali kobeba.*+
6 Mwa kopema moke* eleki ebele ya mosala makasi* mpe kolanda mopɛpɛ.+
7 Natyaki likebi na ndakisa mosusu ya makambo oyo ezali mpamba na nse ya moi: 8 Ezali na moto oyo azali kaka ye moko, azali na moninga te; azali na mwana te to na ndeko te, kasi mosala na ye nyonso ya makasi ezali na nsuka te. Miso na ye etondaka bomɛngo te,+ kasi amitunaka boye: “Mpo na nani nazali kosala mosala makasi mpe komizangisa* biloko ya malamu?”+ Yango mpe ezali mpamba, mpe mosala ya mpasi.+
9 Bato mibale baleki moto moko,+ mpo bazali na mbano malamu* na mosala na bango ya makasi. 10 Mpo soki moko akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye. Kasi ekozala boni soki moto oyo azali kaka ye moko akwei mpe moto mosusu azali te mpo na kotɛlɛmisa ye?
11 Lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bakoyoka mɔtɔ, kasi moto oyo azali kaka ye moko akoyoka mɔtɔ ndenge nini? 12 Mpe moto akoki kolonga moto oyo azali kaka ye moko, kasi bato mibale elongo bakoki kotɛlɛmɛla ye. Mpe nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki* te.
13 Mwana oyo azali mobola kasi azali na bwanya aleki mokonzi oyo azali mobange kasi zoba,+ oyo azali lisusu na bososoli mingi te mpo atya likebi na makebisi.+ 14 Mpo abimi* na bolɔkɔ mpo akóma mokonzi,+ atako abotamaki mobola na bokonzi ya mokonzi wana.+ 15 Natalaki malamumalamu bato nyonso ya bomoi oyo bazali kotambolatambola na nse ya moi, mpe ndenge makambo esalemaka mpo na elenge oyo ayei nsima, oyo azwi esika ya mokonzi. 16 Atako bato oyo bapesaka ye mabɔkɔ bazali ebele mpenza, baoyo bakoya nsima bakosepela na ye te.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.
5 Omitambwisa na ekɛngɛ ntango nyonso oyo okei na ndako ya Nzambe ya solo;+ malamu okende kuna nde mpo na koyoka,+ kasi mpo na kopesa mbeka te ndenge bazoba basalaka,+ mpo bazali koyeba te ete oyo bazali kosala ezali mabe.
2 Kowela koloba te; mpe motema na yo eloba nokinoki te liboso ya Nzambe ya solo.+ Mpo Nzambe ya solo azali na likoló kasi yo ozali na mabele. Yango wana ponáká maloba oyo okoloba.+ 3 Kokanisa makambo mingi esalaka ete moto alota ndɔtɔ,+ mpe bilobaloba ya zoba emonanaka na ebele ya maloba na ye.+ 4 Ntango nyonso oyo osaleli Nzambe elako, koumela te kokokisa yango,+ mpo asepelaka na bazoba te.+ Elako oyo osali, kokisá yango.+ 5 Malamu osala elako te na esika osala yango mpe okokisa yango te.+ 6 Kotika te monɔkɔ na yo esalisa yo* lisumu,+ mpe koloba te liboso ya anzelu* ete ezalaki libunga.+ Mpo na nini osilikisa Nzambe ya solo na maloba na yo mpe abebisa mosala ya mabɔkɔ na yo?+ 7 Mpo kaka ndenge makambo ebele ememaka bandɔtɔ,+ ndenge moko mpe ntango moto azali koloba mingi, maloba na ye ezalaka mpamba. Kasi bangá Nzambe ya solo.+
8 Soki omoni bazali konyokola mobola mpe bazali kobebisa bosembo ná boyengebene na etúká na yo, kokamwa mpo na likambo yango te.+ Mpo mokonzi yango azali mpe na moto oyo aleki ye mpe azali kolandela ye, mpe ezali na baoyo bazali likoló na bango.
9 Lisusu, litomba ya mabele ekabolamaka na bango nyonso; ata mokonzi mpe abikaka na mbuma ya elanga.+
10 Moto alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.+ Yango mpe ezali mpamba.+
11 Ntango biloko ya malamu ekómi mingi, baoyo bakolya yango bakómaka mpe mingi.+ Bongo wapi litomba ya nkolo na yango, longola kaka kotala yango na miso?+
12 Mosaleli, alya moke to mingi, mpɔngi na ye ezalaka elɛngi, kasi ebele ya biloko ya mozwi epesaka ye mpɔngi te.
13 Ezali na likambo moko ya mpasi monene mpenza oyo namoná na nse ya moi: bomɛngo oyo nkolo na yango andukaki mpo na mpasi na ye moko. 14 Bomɛngo yango esili mpo na mosala moko oyo etamboli malamu te, mpe ntango aboti mwana, azali na eloko ata moko te ya kotikela ye.+
15 Kaka ndenge moto abimaki bolumbu na libumu ya mama na ye, akozonga mpe bolumbu, kaka ndenge ayaki.+ Mpe akomema eloko te mpo na mosala na ye nyonso ya makasi.+
16 Yango mpe ezali likambo moko ya mpasi monene mpenza: kaka ndenge moto ayaki, akokende mpe bongo; mpe litomba nini ezali mpo na moto oyo azali kokoba kosala mosala makasi mpo na mopɛpɛ?+ 17 Lisusu, mikolo nyonso alyaka na molili, ná mitungisi mingi, ná maladi mpe nkanda.+
18 Eloko namoni ete ezali malamu mpe ebongi, yango oyo: ete moto alya, amɛla mpe asepela na mosala na ye nyonso ya makasi oyo azali kosala+ na nse ya moi na mwa mikolo ya bomoi na ye oyo Nzambe ya solo apesi ye, mpo yango ezali mbano na ye.*+ 19 Lisusu, ntango Nzambe ya solo apesi moto bomɛngo mpe biloko mingi,+ elongo na makoki ya kosepela na yango, moto yango azwa mbano* mpe asepela na mosala makasi na ye. Yango ezali likabo ya Nzambe.+ 20 Mpo akomona* mpenza ete mikolo ya bomoi na ye eleki mbangumbangu, mpamba te Nzambe ya solo apesi ye mosala ná esengo na motema na ye.+
6 Likambo mosusu ya mpasi mpenza oyo namoni na nse ya moi, mpe emonanaka mingi na kati ya bato yango oyo: 2 Nzambe ya solo apesi moto bomɛngo, biloko mingi ná nkembo, bongo azangi eloko moko te oyo azali na yango mposa;* nzokande Nzambe ya solo apesi ye nzela te ya kosepela na yango; mopaya nde akoki kosepela na yango. Yango ezali mpamba mpe mpasi monene mpenza. 3 Soki mobali moko akómi tata ya bana mbala nkama, aumeli na bomoi bambula mingi, mpe akómi mobange, nzokande azwi litomba te na biloko na ye ya malamu liboso akende na nkunda,* nakoloba ete mwana oyo abotami ya kokufa aleki ye.+ 4 Mpo mwana yango ayei kaka mpamba mpe akei na molili, mpe molili ezipi nkombo na ye. 5 Atako atikali komona moi te, to ayebi eloko te, azali kaka malamu* koleka moto ya liboso.+ 6 Wapi bolamu ya kozala na bomoi mbula nkóto mibale soki ozali na esengo te? Bango nyonso bakokende esika moko te?+
7 Mosala makasi nyonso oyo moto asalaka ezali mpo na kotondisa libumu na ye;+ nzokande mposa na ye ekokisamaka kaka te. 8 Mpo litomba nini moto ya bwanya azali na yango koleka zoba,+ to litomba nini mobola azali na yango ya koyeba ndenge ya kosala mpo na kotikala na bomoi?* 9 Eleki malamu kosepela na oyo miso ezali komona na esika ya kozala na mposa ya biloko oyo tokoki kozwa te.* Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.
10 Eloko nyonso oyo ezali, esilá kozwa nkombo, mpe eyebani soki moto azali nani; mpe akoki te kosamba* ná moto oyo aleki ye na nguya. 11 Soki maloba ezali ebele, makambo ezangá ntina ezalaka mpe ebele, mpe litomba nini yango ememelaka moto? 12 Mpo nani ayebi eloko ya malamu oyo moto asengeli kosala na mwa mikolo ya bomoi na ye ya mpamba, oyo ezali koleka lokola elili?+ Mpo nani akoyebisa ye makambo oyo ekosalema na nse ya moi nsima ya liwa na ye?
7 Nkombo malamu eleki mafuta ya malamu,*+ mpe mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama. 2 Eleki malamu kokende na ndako oyo bazali kolela ebembe na esika ya kokende na ndako ya fɛti,+ mpo yango ezali nsuka ya moto nyonso, mpe moto ya bomoi asengeli kotya yango na motema. 3 Komitungisa eleki kosɛka na malamu,+ mpo mawa ya elongi, esalaka ete motema ekóma malamu.+ 4 Motema ya moto ya bwanya ezali na ndako oyo bazali kolela ebembe, kasi motema ya bazoba ezali na ndako ya fɛti.*+
5 Eleki malamu koyoka mpamela ya moto ya bwanya+ na esika ya koyoka loyembo ya bazoba. 6 Kosɛka ya zoba ezali lokola makɛlɛlɛ ya banzubɛ oyo ezali kozika na nse ya nzungu;+ yango mpe ezali mpamba. 7 Kasi monyoko ekoki kokómisa moto ya bwanya lokola moto ya ligboma, mpe kanyaka ebebisaka motema.+
8 Nsuka ya likambo eleki ebandeli na yango. Eleki malamu kozala motema molai na esika ya kozala na elimo ya lolendo.+ 9 Kosilikaka nokinoki te,+ mpo bazoba nde basilikaka mpambampamba.+
10 Koloba te ete: “Mpo na nini mikolo ya kala ezalaki malamu koleka oyo ya lelo?” Mpo ezali bwanya te nde etindi yo otuna bongo.+
11 Bwanya ná libula ezali eloko malamu mpe ezali litomba mpo na baoyo bazali komona pole ya moi.* 12 Mpo bwanya ebatelaka+ kaka ndenge mbongo ebatelaka;+ kasi litomba ya boyebi yango oyo: Bwanya ebatelaka bomoi ya moto oyo azali na yango.+
13 Talá mosala ya Nzambe ya solo, mpo nani akoki kosembola eloko oyo ye agumbi?+ 14 Na mokolo ya malamu, monisá bolamu,+ kasi na mokolo ya mpasi, moná ete Nzambe asalá yango ndenge kaka asalá oyo wana,+ mpo bato báyeba mpenza te nini ekokómela bango na mikolo ezali koya.+
15 Na bomoi na ngai ya mpamba,+ namoná nyonso: moto ya sembo azali kokufa atako azali sembo,+ mpe moto mabe azali koumela na bomoi atako azali kosala mabe.+
16 Kozala sembo koleka ndelo te,+ komimonisa mpe moto ya bwanya koleka ndelo te.+ Mpo na nini omibebisa?+ 17 Kozala mabe koleka ndelo te, kozala mpe zoba te.+ Mpo na nini okufa wana ozali naino elenge?+ 18 Eleki malamu kosimba likebisi moko, kozanga kotika mosusu;+ mpo moto oyo abangaka Nzambe akosimba yango nyonso mibale.
19 Bwanya ekómisaka moto ya bwanya makasi koleka bato zomi ya nguya na kati ya engumba.+ 20 Mpo ezali na moto moko te na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu ata moke te.+
21 Kolanda te maloba nyonso oyo bato balobaka,+ noki oyoka mosaleli na yo azali kolakela yo mabe; 22 mpo oyebi malamu na motema na yo ete mbala mingi yo moko mpe olakelaki basusu mabe.+
23 Nyonso wana, namekaki yango na bwanya mpe nalobaki: “Nakokóma na bwanya.” Kasi ezalaki mpasi mingi mpo na ngai. 24 Makambo oyo esalemá eleki mosika mayele ya moto mpe ezali mozindo mingi koleka. Nani akoki koyeba yango?+ 25 Natambwisaki motema na ngai mpo na koyeba, kotalatala mpe koluka bwanya mpe ntina ya makambo, mpe kososola mabe ya bozoba mpe bozoba ya ligboma.+ 26 Bongo namonaki likambo oyo: Mwasi oyo azali lokola monyama ya bokila, oyo motema na ye ezali lokola minyama ya kokanga mbisi, oyo mabɔkɔ na ye ezali lokola minyɔlɔlɔ ya bolɔkɔ, azali bololo makasi koleka liwa. Moto oyo asepelisaka Nzambe ya solo akokima ye,+ kasi moto ya masumu, mwasi yango akokanga ye.+
27 Moyanganisi+ alobi: “Talá oyo namoni. Natali malamumalamu eloko moko nsima ya mosusu mpo nayeba likambo yango nyonso, 28 kasi eloko oyo nazalaki kolukaluka, namonaki yango te. Na bato nkóto, namonaki mobali moko ya sembo, kasi namonaki mwasi moko te ya sembo. 29 Kaka likambo oyo nde namoni: Nzambe ya solo asalaki bato sembo,+ kasi bango moko bamilukeli banzela mosusu.”+
8 Nani azali lokola moto ya bwanya? Nani ayebi ndenge ya kosilisa likambo?* Bwanya ya moto engɛngisaka elongi na ye, mpe ata soki elongi na ye ekangami, efungwamaka.
2 Nalobi: “Tosá mitindo ya mokonzi,+ mpe salá bongo mpo olapaki ndai liboso ya Nzambe.+ 3 Kowela te kolongwa liboso na ye.+ Kokɔtela likambo moko te ya mabe;+ mpo akoki kosala nyonso oyo alingi, 4 mpo mokonzi nde azalaka na liloba ya nsuka;+ nani akoki koloba na ye ete: ‘Ozali kosala nini?’”
5 Moto oyo atosaka mobeko akomona mpasi te,+ mpe motema ya bwanya ekoyeba ntango ya kosala likambo mpe ndenge ya kosala yango.*+ 6 Mpo likambo nyonso ezalaka na ntango na yango mpe ndenge ya kosala yango,*+ mpamba te mpasi ya bato ezali mingi mpenza. 7 Lokola moto moko te ayebi oyo ekosalema, nani akoki koyebisa ye ndenge yango ekosalema?
8 Kaka ndenge moto moko te azali na bokonzi likoló ya elimo to kopekisa elimo, moto moko mpe te azali na bokonzi likoló ya mokolo ya liwa.+ Kaka ndenge soda azalaka na ndingisa te ya kolongwa na ntango ya etumba, ndenge moko mpe mabe ekobikisa te baoyo bazali kosala yango.*
9 Namoná nyonso wana, mpe natyaki motema na ngai na mosala nyonso oyo esalemi na nse ya moi, ntango oyo moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.*+ 10 Mpe namonaki bato mabe bazali kokundama, baoyo bazalaki kokɔta mpe kobima na esika mosantu, kasi babosanaki bango nokinoki na engumba esika bazalaki kosala bongo.+ Yango mpe ezali mpamba.
11 Lokola etumbu mpo na mosala moko mabe epesamaki nokinoki te,+ motema ya bato etingami na kosala mabe.+ 12 Ata soki mosumuki asali mabe mbala nkama mpe azali kokoba kozala na bomoi ntango molai, nayebi ete makambo ekosuka malamu mpo na baoyo babangaka Nzambe ya solo, mpo babangaka ye.+ 13 Kasi makambo ekosuka mabe mpo na moto mabe,+ mikolo na ye oyo ezali lokola elili ekoumela te,+ mpo azali kobanga Nzambe te.
14 Likambo moko ya mpamba* oyo esalemaka na mabele yango oyo: basalelaka bato ya sembo makambo lokola nde basalaki mabe,+ mpe basalelaka bato mabe makambo lokola nde basalaki makambo na bosembo.+ Nalobi ete yango mpe ezali mpamba.
15 Nayebisaki basusu ete ezali malamu básepelaka,+ mpo moto azali na eloko moko te na nse ya moi oyo eleki kolya, komɛla ná kosepela; yango esengeli kozala elongo na ye wana azali kosala mosala makasi na mikolo ya bomoi na ye,+ oyo Nzambe ya solo apesi ye na nse ya moi.
16 Nasalaki nyonso mpo na kozwa bwanya mpe mpo na komona mosala nyonso oyo ezali kosalema na mabele,+ nazalaki kutu kolala te butu moi.* 17 Bongo natalaki mosala nyonso ya Nzambe ya solo, mpe namonaki ete bato bakoki te koyeba oyo esalemaka na nse ya moi;+ ata soki bato baluki kosala nini, bakoyeba kaka te. Ata soki balobi ete bazali na bwanya mingi, bakoyeba yango mpenza te.+
9 Bongo natyaki oyo nyonso na motema, mpe namonaki ete: Moto ya sembo ná moto ya bwanya, ezala mpe misala na bango, bazali na mabɔkɔ ya Nzambe ya solo.+ Bato bayebi te bolingo mpe koyina oyo emonisamaki liboso na bango. 2 Bango nyonso basukaka ndenge moko.+ Moto ya sembo* ná moto mabe,+ moto malamu ná moto ya pɛto ná moto ya mbindo, baoyo bapesaka mbeka ná baoyo bapesaka mbeka te. Moto malamu azali ndenge moko na mosumuki; moto oyo alapi ndai ná moto oyo abangaki kolapa ndai. 3 Likambo ya mpasi oyo esalemaka na nse ya moi yango oyo: Lokola bato nyonso bazali na nsuka moko,+ motema na bango mpe etondi na mabe; mpe ligboma ezali na motema na bango na bomoi na bango mobimba, mpe na nsima bakufaka!*
4 Elikya ezali mpo na moto oyo azali na kati ya bato oyo bazali na bomoi, mpo mbwa ya bomoi eleki nkɔsi oyo ekufá.+ 5 Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa,+ kasi bakufi bayebi ata eloko moko te,+ bazali lisusu na mbano* te, mpo bato babosani makambo oyo ekokaki kosala ete bákanisa bango.+ 6 Lisusu, bolingo na bango, koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe basalaka lisusu eloko te na makambo nyonso oyo ezali kosalema na nse ya moi.+
7 Kende, lyá bilei na yo na esengo mpe mɛlá vinyo na yo na motema ya esengo,+ mpo Nzambe ya solo asepeli na misala na yo.+ 8 Bilamba na yo ezala ntango nyonso mpɛmbɛ,* mpe kozanga te kotya mafuta na motó na yo.+ 9 Sepelá na bomoi elongo na mwasi oyo olingaka+ mikolo nyonso ya bomoi na yo ya mpamba, oyo Nzambe apesá yo na nse ya moi, mikolo nyonso ya makambo na yo ya mpamba, mpo yango nde mbano* na yo na bomoi mpe na mosala na yo ya makasi oyo ozali kosala na nse ya moi.+ 10 Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo nyonso, mpo mosala ezali te, mikano te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda,*+ esika ozali kokende.
11 Namoná eloko mosusu na nse ya moi: Ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka ntango nyonso na momekano ya kopota mbangu, to bato ya nguya nde balongaka na etumba,+ ezali mpe te bato ya bwanya nde bazwaka bilei ntango nyonso, ezali mpe te bato ya mayele nde bazwaka bomɛngo ntango nyonso,+ mpe ezali te bato oyo bazali na boyebi nde balongaka ntango nyonso,+ mpo ntango ná makambo oyo ekanami te ekómelaka bango nyonso. 12 Mpo moto ayebaka te ntango nini mpasi ekokómela ye.+ Kaka ndenge mbisi oyo ezwamaka na monyama oyo ebomaka, mpe ndenge bandɛkɛ ezwamaka na motambo, bana ya bato mpe bakangamaka na motambo na ntango ya mpasi, ntango mpasi ezwaka bango na mbalakaka.
13 Lisusu natalatalaki na nse ya moi likambo oyo ya kokamwa etali bwanya: 14 Ezalaki na mwa engumba moko, mpe bato moke bazalaki na kati; mpe mokonzi moko ya nguya ayelaki yango, azingaki yango mpe atongaki bifelo minene mpo na kozinga engumba yango. 15 Mpe kuna ezalaki na mobola moko, kasi azalaki moto ya bwanya, mpe abikisaki engumba na bwanya na ye. Kasi moto moko te akanisaki lisusu mobola yango.+ 16 Mpe ngai nalobaki boye: “Bwanya ezali malamu koleka nguya;+ nzokande batyolaka bwanya ya mobola, mpe balandaka maloba na ye te.”+
17 Malamu nde kolanda maloba ya kimya ya moto ya bwanya, na esika ya kolanda koganga ya moto oyo azali koyangela na kati ya bazoba.
18 Bwanya eleki bibundeli ya etumba, kasi mosumuki kaka moko akoki kobebisa makambo ebele ya malamu.+
10 Ndenge kaka nzinzi oyo ekufi esalaka ete mafuta ya moto oyo asalaka malasi ebimisa nsolo mabe mpe ebimisaka yango fulufulu, bozoba moke mpe ebebisaka bwanya mpe lokumu.+
2 Motema ya moto ya bwanya ememaka ye na nzela ya malamu,* kasi motema ya zoba ememaka ye na nzela ya mabe.*+ 3 Na nzela nyonso oyo zoba atambolaka, azalaka na bososoli te,*+ mpe atikaka moto nyonso ayeba ete azali zoba.+
4 Soki nkanda* ya mokonzi engaleli yo, kolongwa te na esika na yo,+ mpo kofanda nyɛɛ ekitisaka masumu minene.+
5 Ezali na likambo moko ya mpasi oyo namoná na nse ya moi, lolenge ya libunga oyo bato oyo bazali na bokonzi basalaka:+ 6 Bozoba etyami na ebele ya bisika ya lokumu, kasi bato ya malonga* bazali kaka na bisika ya nse.
7 Namoná basaleli likoló ya bampunda, kasi bankumu bazali kotambola na makolo lokola basaleli.+
8 Moto oyo azali kotimola libulu akoki kokwea na kati;+ mpe moto oyo azali kotɔbɔla efelo ya mabanga, nyoka ekoki koswa ye.
9 Moto oyo atimolaka mabanga akoki komizokisa na yango. Moto oyo apasolaka nkoni akoki komitya na likama.*
10 Soki esaleli moko ya ebende esili mino mpe moto apelisi yango te, ekosɛnga ye asala mpenza makasi. Kasi bwanya esalisaka moto alonga.
11 Soki nyoka eswi moto liboso abinisa yango, moto oyo ayebi kobinisa yango* azali na litomba moko te.
12 Maloba ya monɔkɔ ya moto ya bwanya esepelisaka,+ kasi mbɛbu ya zoba ememelaka ye libebi.+ 13 Maloba ya liboso oyo ebimaka na monɔkɔ na ye ezalaka bozoba,+ mpe maloba na ye ya nsuka ezalaka ligboma ya mabe mpenza. 14 Kasi zoba alobaka mingi.+
Moto moko te ayebi oyo ekosalema; nani akoyebisa ye oyo ekosalema nsima na ye?+
15 Mosala makasi oyo zoba asalaka elɛmbisaka ye, mpo ayebi kutu ata te nzela ya kokende na engumba.
16 Ezali mpasi mpo na mboka oyo mokonzi na yango azali elenge+ mpe bankumu babandaka fɛti na bango na ntɔngɔ! 17 Ezali esengo mpo na mboka oyo mokonzi na yango azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu balyaka na ntango oyo ebongi mpo na kozwa makasi, kasi mpo na kolangwa te!+
18 Soki gɔigɔi eleki mingi mabaya ya nsamba ya ndako ebukanaka, mpe ndako etangaka soki moto akangi mabɔkɔ.+
19 Limpa* esalemi mpo na kosɛka, mpe vinyo epesaka bomoi esengo;+ kasi mbongo nde ekataka makambo nyonso.+
20 Ata na makanisi* na yo, kolakela mokonzi mabe te,+ mpe kolakela mozwi mabe te na mbeto na yo; mpo ndɛkɛ* ekoki komema nsango* to ekelamu oyo ezalaka na mapapu ekoki kozongela makambo oyo olobi.
11 Bwaká limpa na yo na mai,+ mpo nsima ya mikolo mingi okozwa yango lisusu.+ 2 Pesá bato nsambo likabo, ata mpe bato mwambe,+ mpo oyebi te mpasi* nini ekokóma na mabele.
3 Soki mapata etondi na mai, ekosopa mbula na mabele; mpe soki nzete ekwei na sudi to na nɔrdi, na esika oyo nzete yango ekwei, ekolala wana.
4 Moto oyo atalatalaka mopɛpɛ akolona mboto te, mpe moto oyo atalaka mapata akobuka mbuma te.+
5 Kaka ndenge oyebi te lolenge oyo elimo esalaka na kati ya mikuwa ya mwana oyo azali na libumu* ya mwasi ya zemi,+ oyebi mpe te mosala ya Nzambe ya solo, oyo asalaka biloko nyonso.+
6 Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te;+ mpo oyebi te oyo wapi ekobota, ezala oyo to oyo mosusu, to soki yango nyonso mibale ekobota.
7 Pole ezali elɛngi, mpe ezali malamu miso emona moi. 8 Mpo soki moto akozala na bomoi bambula mingi, tiká asepela na yango nyonso.+ Kasi asengeli kobosana te ete mikolo ya mpasi ekoki kozala mingi; nyonso oyo ekoya ezali mpamba.+
9 Elenge, sepelá na bolenge na yo, mpe motema na yo ezala na esengo ntango ozali naino elenge, landá banzela ya motema na yo mpe kende esika miso na yo ezali komema yo; kasi yebá ete Nzambe ya solo akosambisa yo* mpo na makambo wana nyonso.+ 10 Yango wana, longolá na motema na yo eloko nyonso oyo eyokisaka mpasi, mpe longolá makambo ya mpasi na nzoto* na yo, mpo bolenge mpe eleko kitoko ya bomoi ezali mpamba.+
12 Yango wana, kanisá Mozalisi na yo Monene ntango ozali naino elenge,+ liboso mikolo ya mpasi eya,+ mpe bambula eya ntango okoloba ete: “Nasepeli na yango ata moke te”; 2 liboso moi ná pole, mpe sanza ná minzoto eyinda,+ mpe mapata ezonga nsima ya* mbula makasi; 3 na mokolo oyo bakɛngɛli ya ndako bakómaka kolɛnga, mpe mibali makasi bagumbamaka, mpe basi batikaka konika mpo bazali lisusu mingi te, mpe basi oyo batalaka na bafɛnɛtrɛ bamoni molili;+ 4 ntango baporte oyo etali na balabala ekangami, ntango makɛlɛlɛ ya enikelo ekómi kokita, ntango moto azali kolamuka na makɛlɛlɛ ya ndɛkɛ, mpe ntango bana basi nyonso ya loyembo babandi kolɛmba.+ 5 Lisusu, bakómi kobanga bisika oyo etombwaná, mpe makambo ya nsɔmɔ ezali na nzela. Mpe nzete ya amande ezali kobimisa fololo,+ mpe liyoyo ezali komibenda, mbuma ya kapre epasuki, mpo moto azali kokende na ndako epai akopema ntango molai+ mpe bato oyo bazali na mawa bazali kotambolatambola na balabala;+ 6 liboso nsinga ya palata elongolama, mpe kibakuli ya wolo ebukana, mpe elokó oyo ezali na liziba ya mai epanzana, mpe pine ya ebende* ya libulu ya kobomba mai ebukana. 7 Bongo putulu ezali kozonga na mabele+ kaka ndenge ezalaki, mpe elimo* ezongaka epai ya Nzambe ya solo oyo apesaki yango.+
8 Moyanganisi+ alobi: “Mpamba ya mpamba mpenza! Eloko nyonso ezali mpamba.”+
9 Moyanganisi akómaki na bwanya, longola yango akobaki koteya bato makambo oyo ayebaki,+ mpe akanisaki na mozindo mpe alukaki malamumalamu mpo atya masese mingi esika moko.*+ 10 Moyanganisi alukaki kozwa maloba ya kitoko+ mpe kokoma na bosikisiki maloba ya solo.
11 Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola nsɔngɛ ya mangenda ya kotambwisa bangɔmbɛ,+ mpe maloba na bango oyo esangisami ezali lokola bansɛtɛ oyo ekɔtisami makasi; mobateli se moko ya mpate nde apesi yango. 12 Mpo na likambo nyonso mosusu longola oyo wana, mwana na ngai, kebá: kosala babuku ebele ezali na nsuka te, mpe komipesa na yango mingi elɛmbisaka nzoto.+
13 Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo+ mpe batelá mitindo na ye.+ Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.+ 14 Mpo Nzambe ya solo akosambisa mosala nyonso, ata mpe likambo nyonso oyo ebombami, mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe.+
Na Ebre nkombo yango elimboli “Moyanganisi; Mosangisi.”
To, “mosangisi.”
Lil., “na nse ya moi.”
Lil., “etɛlɛmaka.”
To, “engɛngaka.”
To, “bozoba oyo eleki ndelo.”
Lil., “bana ya ndako.”
To, “biloko oyo ezalaka epai.”
Lil., “oyo miso na ngai esɛngaki.”
To, “eteni.”
To, “litomba.”
Lil., “miso na ye ezali na motó na ye.”
To, “kotika nyonso.”
Lil., “molende ya motema na ye.”
Lil., “kobina na kopumbwapumbwa.”
To, “malamu; oyo ebongi.”
To mbala mosusu, “oyo esili.”
To, “eteni.”
To, “mosala.”
Lil., “mpe azali kolya mosuni na ye moko.”
Lil., “Lobɔkɔ moko etondi na kopema.”
Lil., “mabɔkɔ mibale oyo etondi na mosala makasi.”
To, “kozangisa molimo na ngai.”
To, “litomba monene.”
To, “na pɛtɛɛ.”
Mbala mosusu ezali kolobela mwana ya bwanya.
Lil., “mosuni na yo.”
To, “momemi-nsango.”
To, “eteni na ye.”
To, “eteni.”
To, “akokanisa lisusu.”
To, “azali kozanga eloko moko te mpo na molimo na ye.”
To, “ata nkunda ekómaki ya ye te.”
Lil., “kopema mingi.”
Lil., “kotambola liboso ya bato ya bomoi.”
To, “na esika ya kotambolatambola ya molimo.”
To, “koswana.”
To, “lokumu malamu.” Lil., “nkombo.”
To, “ndako ya kosepela; ndako ya kosakana.”
Elingi koloba, “baoyo bazali na bomoi.”
To, “ndimbola ya likambo.”
To, “lisambisi.”
To, “lisambisi.”
To mbala mosusu, “mabe ekobikisa ata moke te bato mabe.”
To, “konyokola ye.”
To, “oyo ebangisaka.”
To mbala mosusu, “bato bazwaka mpɔngi te ezala na moi to na butu.”
To, “Moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mpe nsima na yango bakei epai ya bakufi.”
To, “lifuti.”
Elingi koloba, “bilamba ya kongɛnga oyo ezali komonisa esengo, kasi bilamba ya matanga te.”
To, “eteni.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ezali na lobɔkɔ na ye ya mobali.”
Lil., “ezali na lobɔkɔ na ye ya mwasi.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “elimo; mpema.”
Lil., “bozwi.”
To mbala mosusu, “asengeli kokeba na yango.”
Lil., “moto oyo ayebi kosalela lolemo.”
To, “Bilei.”
To mbala mosusu, “na mbeto.”
Lil., “ekelamu oyo epumbwaka na likolo.”
To, “mongongo.”
To, “libebi.”
Lil., “na mikuwa ya libumu.”
To, “akosɛnga yo ozongisa monɔkɔ.”
Lil., “mosuni.”
To mbala mosusu, “elongo na.”
To, “yiká.”
To, “nguya ya bomoi.”
To, “na molɔngɔ.”