Bomoi na libota ya esengo
MOKOLO moko, mobɛli moko na etúká ya Caroline ya Súdi, na Etats-Unis atindelaki moko ya balífulumɛ́ na ye ya basi trakte Bomoi malamu na libota. Lífulumɛ́ yango abengaki ye na telefone mpo na kopesa ye matɔ́ndi mpo na yango mpe alobaki ete, ye mpe mobali na ye batángaki yango elongo na esengo mpenza. Nzokande, bakokaki kondima te ete lisungi ya kolendisa motindo wana ekokaki kozala mpo na mabota.
Mobɛli alobi ete: “Lífulumɛ́ ayebisaki ngai ete trakte yango ekokanaki mpenzampenza na makambo oyo ye mpe mobali na ye bazalaki kolobela na ntina etali bomoi ya libota, kasi bazalaki mosika na kondima ete bakoki komona kozala na makomi oyo ezali kolobela likambo yango. Na nsuka ya lisoló na telefone, ayebisaki ngai ete azalaki komema trakte yango bipai binso azalaki kokende mpo na kotánga yango mbala na mbala. Atunaki ngai soki nazalaki na makomi mosusu na ntina etali bomoi ya libota mpo ete natindela ye.”
Mobɛli atindelaki lífulumɛ́ búku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo mpe azwaki bibongiseli mpo na kokutana na ye mpe kosolola na ye na mozindo likoló na yango. Mbala mosusu yo mpe okosepela koyeba lolenge nini kozala na bomoi na libota ya esengo. Soki okosepela kozwa trakte Bomoi malamu na libota to búku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo, to soki olingi ete moto moko aya kotala yo mpo na koyekola Biblia elongo na yo kozanga kofuta, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, Zaïre.