Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet nk. 26-27
  • Ndako na yo etongami makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndako na yo etongami makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé?
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Myango ya kotonga ndako makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé
  • Buldingi oyo etongami makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé
  • Tózela koningana ya mabele ya minene koleka
    Lamuká!—2011
  • “Komona bolingo ya ndenge wana esepelisaki biso mpenza”
    Lamuká!—2017
Lamuká!—1995
g95 Juillet nk. 26-27

Ndako na yo etongami makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé?

Euti na mokomani na biso na Japon

“BÓSALISA ngai! Bósalisa ngai!” Na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ ya mokolo mwa 17 Yanuáli 1994, mobali moko agangaki longwa na etaze ya liboso ya ndako moko kati na yango bitaze mibale bibukanaki mpe bilalaki esika moko. Koningana ya mabelé ya 6,6 na échelle ya Richter ebebisaki Los Angeles, na etúká Californie, na mboka États-Unis, ebomaki bato 16 kati na buldingi yango. Kati na mboka yango bato bakufaki koleka 50.

Na mokolo mwa 30 Sɛtɛ́mbɛ 1993, koningana moke ya mabelé esalemaki na Maharashtra, etúká oyo ezali na Wɛ́sti ya Inde. Ebomaki bato koleka 30 000. Sri Krishna Singh, moto na mayele mpo na makambo matali koningana ya mabelé, alobaki ete: “Soki esalemaki esika mosusu oyo bandako etongami malamu, mbɛlɛ likámá ekokaki kozala monene boye te.” Bandako mingi kati na mboka oyo ezwaki likámá etongamaki na bilíki ya kabondo.

Epai mosusu, koningana ya mabelé motindo moko na oyo esalemaki na Inde ebebisaki engumba Tokyo, na Japon, na 1985. Ezalaki makasi koleka nyonso oyo ebebisaki etúká wana uta bambula 56. Nzokande, bato bakufaki te, mɔ́tɔ ebimaki te, kobebisama ya biloko mpe ezalaki mingi te. Eloko nini ekesenisaki yango na nyonso mosusu?

Eyano ezali na myango ya botongi oyo basalelaki mpo na babuldingi. Mikili mingi kati na bisika oyo koningana ya mabelé esalemaka esɛngaka na batongi ete bálanda mitindá ya sikisiki ya kotonga babuldingi mpo ete ndako ezala makasi na ntango ya koningana ya mabelé. Na ndakisa, tótala lolenge bandako makasi mpo na koningana ya mabelé etongamaka na Japon.

Myango ya kotonga ndako makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé

Babuldingi ya mboka Japon ezalaki uta kala na myango ya makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé. Lokola bandako mingi etongamaki na mabaya, kokangisama ya ndenge na ndenge esalemaki. Yango epesaki nzela na ndako ete ezala makasi na ntango ya koningana ya mabelé mpe na bongo ebukana te. Yango wana Pagodes mpe châteaux oyo etongamaki na kolandáká mwango wana eumeli longwa na ntango ya Moyen Âge. Boyekoli ya bandako yango emonisi ete sɛkɛlɛ́ ya boumeli na yango ezali mpo na bonitói na yango, na esika ete ezala makasi. Likanisi yango lizali kosalelama mpo na kotonga babuldingi ya mikolo na biso.

Kati na babuldingi ya milai, kosalelama malamu ya bibende ya acier emonisaka soki buldingi ekozala makasi na ntango ya koningana ya mabelé to ekozala makasi te. Ezali bobele te mibónga ya bibende mpe mibónga ya mabaya nde ekoki kosalelama kasi bibende ya acier ya kokangisa oyo ekɔtisami kati na makonzi ya bɛtɔ́, kati na ba dalles mpe kati na bifelo mpo na kosala ndako ya makasi mpe ya bonitói. Bibende bipesaka bonitói oyo esungaka na kosimba ndako esika moko na ntango ya koningana ya mabelé.

Bolukiluki ya sika mpe epesi nzela na koyeba lolenge nini koningana ya mabelé ekweisaka buldingi. Yango epesi nzela na kotalela likambo moko ya ntina mpo na kotonga buldingi oyo ezali makasi mpo na koningana ya mabelé: bolɛ́ngi. Buldingi ya moke to ndako ya makasi ezali na bolɛ́ngi makasi, na bongo, ekoki kobukana, koningana koleka buldingi ya molai to ya bonitói. Lisusu, ezali na ntina ete buldingi etyama na koningana na bokeseni na bolɛ́ngi ya mabelé likoló na yango etɛlɛmi. Yango ekokitisa popusi ya lokito, oyo elendisaka makasi ya koningana.

Likambo mosusu ya kotalela ezali miboko ya ndako. Kompanyi moko elóngaki na komeka ndako moko oyo etongami likoló ya mabaya oyo ekangisami na ndembo na nsuka. Yango esalaki ete mobulu ya koningana ekitisa mpenza makámá ya koningana ya mabelé na 60 % na eteni ya likoló ya ndako. Mbala mosusu makonzi masengeli kopikama na nsé ya mabelé na esika eleki makasi. Nkutu moboko ekoki kobatela buldingi mpo ete etengama te.

Buldingi oyo etongami makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé

Na 1989, biro ya la Société Watch Tower oyo ezali na Japon etongaki ndako ya sika mpo na konyata mikanda. Buldingi yango ezali na bolai ya bamɛtɛlɛ 67, bonene ya bamɛtɛlɛ 45 mpe na bitaze motoba elongo na miboko ya makasi. Mpo na kosala ete buldingi ezala makasi na ntango ya koningana ya mabelé, makonzi 465 makɔtisamaki na mabelé.

Na esika ya botongi, mwango oyo mosalelamaki mpo na kokɔtisa makonzi kati na mabelé mosilisaka makɛlɛlɛ mpe bolɛngi. Makonzi ya basantimɛtɛlɛ 80 ya diamɛtɛlɛ mpe na mɛtɛlɛ 12 ya bolai ezalaki na lolenge ya batiyó. Nsima wana etubeli oyo ezali na eteni ya kotɔbɔla na nsɔ́ngɛ́ na yango ekɔtisamaki kati na likonzi, batombolaki yango likoló na libulu oyo esengelaki kotyama. Babalolaki etubeli, elongolaki mabelé na katikati ya likonzi mpe likonzi likɔtisamaki mokemoke na lidusu oyo likokangaka yango malamu. Mpo na kokita na nsé ya mabelé mpenza, eteni moko ya likonzi esengelaki kokangisama na eteni oyo esilaki kotyama na mabelé.

Wana ekómi na mozindo oyo esengelaki, bitubeli na lidusu bipanzani mpe lidusu monene esalemi na likoló ya likonzi. Nsima wana balongolaki etubeli, bakɔtisaki bɛtɔ́ na nsé ya likonzi mpe na kati ya lidusu yango, mpe likonzi litɛlɛmaki ntango bɛtɔ́ ezalaki kokauka.

Nsima wana makonzi nyonso mapikamaki, bakangisaki yango esika moko na mibónga oyo likoló na yango pavemá mpe bifelo ya moboko ekofanda. Na moboko motindo yango, buldingi ekoki kozala na likoki ya kotikala ngwi na koningana oyo ezali mpenza makasi te.

Ndako na yo etongami makasi mpo na kotɛlɛma na koningana ya mabelé? Ezali na myango to bibongiseli te oyo esengeli kondimisa ete buldingi ekotɛlɛma ngwi na ntango ya koningana ya mabelé. Koningana ya mabelé ekoki kozala ya makasi na boye ete ata babuldingi ya malamu ekoki kokwea na ntango yango ekosalema, lokola emonisamaki na koningana ya mabelé ya makasi oyo esalemaki na Kõbe, na mboka Japon, na Yanuáli. Nzokande, na koponáká kofanda na buldingi oyo etongami na lolenge ya malamu mpenza, okoki komiyoka na libateli na ntango koningana ya mabelé esalemi na mboka na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto