‘Yango ezali bobele mpo na mwa ntango!’—Bomoi na ngai na bokɔnɔ ya bangei
Nazali naino komikundola mokolo yango na ebandeli ya sanza ya Yanuáli na mobu 1980 lokola nde ezalaki lobi. Mama atindaki ngai nakende kosomba mapa mpe bobele na ntango nalingaki kokende, telefone elelaki. Ezalaki monganga na ngai nde alingaki koyebisa biso nini amonaki na baekizamɛ́ oyo asalaki ngai na laboratware. Mbala moko, mama alelaki makasi mpe na mai na miso ayebisaki ngai nsango oyo ya mawa: bazwaki ngai na bokɔnɔ ya bangei. Engebene monganga, etikalaki bobele mbula moko kasi ekokaki koleka mbula mibale te liboso ete bangei na ngai etika mpenza kosala. Alobaki solo mpamba te nsima ya mbula moko nakómaki kosalisama na mwango oyo elongolaka bosɔtɔ na makila, oyo ebéngami dialyse.
NAZALI mwana ya liboso na libota ya bana motoba mpe nabotamaki na mokolo mwa 20 Máí 1961. Wana nazalaki naino na sanza motoba, mama amonaki mwa makila na masuba na ngai ntango alongolaki ngai bilamba ya masuba. Nsima ya baekizamɛ́ ya minene oyo basalaki ngai, bayaki kokanga ngai na bokɔnɔ oyo ebéngami syndrome d’Alport, bokɔnɔ bokosangolamaka uta kobotama mpe oyo emonanaka mingimingi te. Mpo na bantina oyo eyebani naino te, bana mibali oyo bazali na bokɔnɔ yango, mingimingi bakobɛla bokɔnɔ ya bangei na eleko moko ya bomoi na bango. Nde namitungisaki te ete nakobɛla bokɔnɔ ya bangei mokolo mosusu mpo ete bayebisaki biso yango liboso te, ngai mpe baboti na ngai.
Na nsima, na eleko ya molungé ya 1979, mokolo moko na ntɔ́ngɔ́, nayokaki ete mpema na ngai ezalaki kobimisa nsolo mabe. Natyaki mpenza likebi mingi te likoló na yango, kasi na nsima nabandaki koyoka bolɛmbu mingi na nzoto. Nde namonaki yango lokola bolɛmbu mpamba ya nzoto, na bongo natyaki motema kuna te. Na sanza ya Desɛ́mbɛ, nakendeki kosalisa ekizamɛ ya nzoto oyo nameseneki kosala mbula na mbula, mpe talá na sanza ya Yanuáli nayaki kozwa mbélá ya telefone oyo nauti kolobela na ebandeli ya lisoló oyo.
Wana nazalaki kokende na motuka na esika batekaka mapa—mpo atako tozwaki nsango wana ya mawa kasi mama azalaki na mposa ya mapa—makanisi na ngai mabulunganaki. Nakokaki kondima te ete likambo motindo wana lizalaki kokómela ngai. Nagangaki ete: “Nazali bobele na mbula 18!” Napusaki motuka na ngámbo ya nzela mpe natɛlɛmisaki yango. Nabandaki kososola bonene ya likambo oyo lizalaki kokómela ngai.
“Mpo na nini bobele ngai?”
Nafandaki pembeni ya nzela mpe nabandaki kolela. Wana mai na miso ezalaki kokita, nagangaki na kolela ete: “Nzambe, mpo na nini bobele ngai? Mpo na nini bobele ngai? Nalɔmbi yo ete nabɛla bokɔnɔ ya bangei te!”
Wana mobu 1980 ezalaki kokóba, nakómaki kobɛlabɛla mpe atako nazalaki kopesa mabondeli na mai na miso kasi nandimisamaki mpenza te ete yango ekobimisa matomba. Na nsuka ya mbula, nazalaki mingimingi kosanza mpe kosenzwa mpo ete makila na ngai etondaki na bosɔtɔ oyo bangei na ngai ezalaki te na likoki ya kopɛtola yango. Na sanza ya Novɛ́mbɛ, nakendeki mobembo oyo nakoloba ete ezalaki mobembo ya nsuka, mpo na kominanola elongo na baninga na ngai. Kasi nazalaki mpenza kolɛnga na maladi na boye ete na boumeli ya wikɛndɛ mobimba nabimaki ata libándá ya motuka te. Ezala elamba nini oyo namifinikaki na yango, nakokaki kosilisa malili na nzoto te. Nsukansuka na mobu 1981 na Yanuáli, bokɔnɔ oyo nakokaki kopɛngola yango te ekómelaki ngai—bangei na ngai etikaki mpenza kosala. Nazalaki bobele na liponi moko: nábanda kosalisama na mwango ebéngami dialyse to nándima liwa.
Wana bomoi na ngai esimbami na dialyse
Mwa basanza liboso, monganga oyo asalisaka libota na biso ayebisaki ngai ete ezali na lolenge moko ya sika ya dialyse oyo esalelaka ntonga te kasi epɛtolaka makila katikati ya nzoto. Esaleli yango eyebani na nkombo dialyse péritonéale (D.P.). Liyebisi wana lisepelisaki ngai mingi mpamba te uta kala nalingaka te ete bátɔbɔla ngai ntonga. Lolenge wana ya sika ya dialyse emonani ete ezali mpenza esaleli ebongi mpo na babɛli mosusu ya bangei.
Likambo ya kokamwa, nzoto na biso ezali na enama moko oyo ekoki kosala lokola ngei ya masini, oyo esalemi na bato. Péritoine—loposo ya sɛlisɛli, oyo emonisaka biloko bizali kati na yango mpe ezalaka lokola saki zingazinga na binama ya libumu bikotamwisaka bilei—ekoki kosalelama lokola ekɔngɔleli mpo na kopɛtola makila. Eteni ya ntéi ya enama yango ekati ndelo ya libenga oyo libéngami cavité péritonéale. Péritoine ezali lokola saki ya patátálú, oyo ezwami katikati ya binama oyo bizali zingazinga na motɔlu.
Tála lolenge dialyse péritonéale (D.P.) esalaka: na nzela ya lipaso, monganga akotya sɔ́nde na nsé ya motɔlu mpo ete yango emema nkisi ya sikisiki ya dialyse kino na cavité péritonéale. Nkisi yango ezali na glucose, mpe na lisalisi ya mwango ebéngami osmose, bosɔtɔ oyo etondi kati na makila ekolongwa na péritoine na lisalisi ya nkisi ya dialyse oyo ezwami na cavité péritonéale. Bosɔtɔ oyo mbɛlɛ elingaki kobimisama na masuba ebimisami sikawa na nkisi ya dialyse. Mbala minei na mokolo, esengeli kosɔmbitinya—kolongola nkisi oyo euti kosalelama mpe kotya nkisi ya sika na cavité péritonéale. Kosɔmbitinya yango ekoumela pene na miniti 45. Ezali lokola kosɔmbitinya mafuta ya motuka—kolongola oyo esili kosalelama mpe kotya oyo ya sika mpo ete motɛlɛ eumela na ntina ete motuka elanda kotambola malamu!
Na ebandeli ya Yanuáli 1981, batyaki ngai sɔ́nde oyo nasengelaki na yango, na nsé ya motɔlu na lobɔkɔ ya mobali. Bongo, na boumeli ya pɔ́sɔ mibale, nabandaki koyekola kosalisama na mwango wana. Soki mwango yango esalelami malamu te, na kolandáká na bosikisiki malako nyonso matali lolenge ya kopɛngola mikrɔbe, moto akoki kozwa bokɔnɔ ebéngami péritonite, oyo euti na kobebisama ya péritoine na mikrɔbe mpe yango ekoki komema na liwa.
Na eleko ya molungé na 1981, pene na sanza motoba nsima wana nabandaki kosalisama na dialyse péritonéale (D.P.), baboti na ngai bazwaki mbélá ya telefone oyo ekɔtisaki mbongwana monene kati na bomoi na ngai.
Bolukiluki ngei ya sika
Uta Yanuáli 1981, nkombo na ngai etyamaki na molɔngɔ́ ya baoyo kati na ekoló na biso, bazalaki na mposa ete bátya bango ngei ya sika.a Nazalaki na elikya ete na lisalisi ya ngei ya sika, bomoi na ngai ekozonga lolenge yango ezalaki liboso. Kasi nayebaki mpenza te oyo ezalaki kozela ngai!
Na katikati ya sanza ya Augústo, bayebisaki biso na telefone ete mopesi moko ya ngei ya sika amonanaki. Ntango nakendeki na lopitalo, pene na ngonga ya 10 nsima ya nzánga, basalaki ngai ekizamɛ́ ya makila mpo na kondimisama ete nzoto na ngai ekondima ngei wana ya sika oyo epesamaki na baboti ya elenge mobali moko oyo autaki kokufa na likámá ya motuka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mokolo wana.
Ebongiseli ezwamaki ete básala ngai lipaso na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo oyo elandaki. Liboso ete lipaso lisalema, esengelaki ete tolobela likambo ya ntina litali kozongisama makila mpamba te lokola nazali Motatoli ya Yehova, nakoki kondima te kozongisama makila, na ntina na lisosoli na ngai oyo liteyami na Biblia. (Misala 15:28, 29) Na butu wana, monganga oyo apesaka anesthésie ayaki kotala ngai. Apusaki ngai nandima ete báya na makila na ndako ya lipaso bobele mpo na kolɛngɛlɛ mokakatano oyo mokoki kobima pwasa. Kasi naboyaki.
Atunaki ngai ete: “Nini nasengeli kosala soki okómi na likámá? Natika yo okufa?”
Nayanolaki ye ete: “Salá nyonso oyo ezali na makoki na yo kasi ezala mokakatano nini mokoki kobima, nakondima te kozongisama makila.”
Nsima na ye, minganga oyo basalaka lipaso bayaki. Nasololaki na bango likambo yango mpe ntango bandimaki ete bakosala ngai lipaso kozanga kozongisama makila, motema na ngai ekitaki.
Lipaso yango eumelaki ngonga misato na ndambo mpe esalemaki malamu mpenza. Monganga oyo asalaki lipaso ayebisaki ngai ete makila ebimaki mingi mpenza te. Ntango nalamukaki na ndako ya bopemisi nzoto, nayokaki liboso nzala mpe mposa ya mai mpe na nsima mpasi ya lipaso! Kasi nabosanaki mitungisi nyonso wana ntango namonaki libenga ya plastiki elali na nsé, etondi na mai ya lángi ya mwa mosaka. Yango ezalaki masuba na ngai mpe elembo ete ngei na ngai ya sika ebandaki kosala malamu. Nakómaki mpenza kosuba! Ntango balongolaki sɔ́nde oyo batyaki na libenga na ngai ya masuba, nakómaki kosuba lokola moto nyonso mpe yango esepelisaki ngai mpenza.
Nzokande, esengo na ngai ezalaki bobele mpo na ntango mokuse. Mikolo mibale na nsima, bayebisaki ngai nsango oyo ebulunganisaki ngai: ngei na ngai ya sika ezalaki lisusu kosala te. Nasengelaki kozongela kosalisama na dialyse na elikya ete yango ekopesa na ngei na ngai ya sika likoki ya kosala lisusu mosala na yango. Na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi, nalandaki kosalisama na dialyse.
Tokómaki sikawa katikati ya sanza ya Sɛtɛ́mbɛ mpe nasilaki kolekisa pene na sanza moko na lopitalo. Lokola lopitalo ezwamaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 80 na ndako na biso, ezalaki mpasi mpo na bandeko na ngai baklisto ete báya kotala ngai. Kozala mosika na lisangá ezalaki kosala ngai mpasi mingi. Bazalaki kotindela ngai bakasɛti oyo kati na yango bakɔtisaki masoló ya makita ya lisangá, mpe ntango nazalaki koyoka yango, nazalaki kobulunganisama mpenza na mayoki. Nazalaki kolekisa ntango mingi ngai moko, kosambeláká Yehova mpe kosɛngáká na ye ete apesa ngai makasi mpo ete nalanda koyika mpiko. Kino ntango wana nayebaki te ete komekama oyo eleki makasi ezalaki liboso na ngai.
Nazali kobanga liwa te
Kobanda ntango batyaki ngai ngei ya sika, esilaki koleka sanza moko na ndambo, oyo na miso na ngai eumelaki mpenza. Nayaki mpenza kondimisama ete nzoto na ngai esilaki koboya ngei wana mpe yango esalaki ngai mpasi mingi. Motɔlu na ngai ebandaki kovimba mpenza; na yango minganga bayebisaki ngai ete bakolongola ngei wana mpo ete nzoto na ngai esili koboya yango. Likambo litali kozongisama makila lilobelamaki lisusu. Minganga balimbolaki ete na mbala oyo, lipaso ekozala kútu likámá koleka, mpamba te makila na ngai ekitaki mingi mpenza. Na bopɔlɔ nyonso mpe na mpiko, nalimbolaki etɛlɛmɛlo na ngai oyo ezwi moboko likoló na Biblia mpe nsukansuka bayaki kondima kosala ngai lipaso kozanga kozongisama makila.b
Nsima na lipaso, makambo mayaki kobeba noki mpenza. Wana nazalaki naino na ndako ya bopemisi nzoto, nkisi basalelaka na dialyse ebandaki kokɔta na mapúlúlú na ngai. Nsima ya kolekisa butu mobimba kosalisamáká na dialyse, nayokaki mwa malamu. Kasi mikolo mibale na nsima, nkisi yango etóndaki lisusu na mapúlúlú na ngai. Nalekisaki lisusu butu mobimba kosalisamáká na dialyse. Nayebi mpenza te makambo nyonso oyo malekaki na butu wana, kasi nazali komikundola ete tata afandaki na mopanzi na ngai, kolobáká ete: “Lee, benda lisusu mpema! Nalɔmbi yo. Okoki kosala yango! Benda lisusu mpema. Malamu, landa kopema!” Nalɛmbaki makasi mpenza na boye ete nalɛmbá naino liboso bongo te. Nalingaki na ngai ata kokufa mpe kosekwa na mokili ya sika ya Nzambe. Nazalaki kobanga liwa te.—Emoniseli 21:3, 4.
Na ntɔ́ngɔ́ oyo elandaki, kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ya nzoto ebebaki lisusu koleka. Motángo ya globule rouge kati na makila, oyo ebéngami hématocrite, ekitaki epai na ngai kino 7,3 %—nzokande motángo na yango oyo ebongi esengeli koleka 40 %! Minganga bazalaki lisusu na elikya te ete nakobika. Bamekaki mbala mingi kondimisa ngai ete nazongisama makila mpamba te bamonaki ete yango ezalaki lisungi bobele moko mpo ete nazóngela kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ya nzoto.
Bamemaki ngai na ndako oyo bapesaka lisalisi ya sikisiki mpo na baye bazali mpenza na likámá kasi atako bongo hématocrite na ngai ekitaki na 6,9 %. Nde na lisungi ya mama na ngai, hématocrite na ngai ebandaki komata malɛmbɛmalɛmbɛ. Kosaleláká masini ya konika bilɛi na ndako, mama anikaki bilɛi ndenge na ndenge oyo ematisaka makila; yango ekómaki lokola masanga mpe amemelaki ngai. Kútu ye moko azalaki komela elongo na ngai mpo na kolendisa ngai. Ya solo, bolingo ya mama epai na mwana na ye ezali likambo ya kokamwisa mpenza.
Na katikati ya sanza ya Novɛ́mbɛ, nabimaki na lopitalo mpe hématocrite na ngai emataki na 11 %. Na ebandeli ya 1987, nabandaki kozwa hormone oyo esalemi na bato mpe ebéngami érythropoïétine (EPO) mpo na kolendisa mafuta ya mikuwa ete ekólisa motángo ya baglobule rouge kati na makila, mpe talá hématocrite na ngai emataki pene na 33 %.c
‘Lee, ezali bobele mpo na mwa ntango!’
Na ntina na bokɔnɔ na ngai ya bangei, nalandaki kosálema mapaso minene na boumeli ya bambula oyo: 1984, 1988, 1990, 1993, 1995 mpe 1996. Na boumeli ya bambula nyonso wana oyo nazali kobika na bokɔnɔ ya bangei, nasili kozwa lisungi na likanisi oyo ete ‘Yango ezali bobele mpo na mwa ntango.’ Mikakatano na biso, ezala ya nzoto to ya lolenge mosusu nini, nyonso ekosilisama na Bokonzi ya Nzambe kati na mokili ya sika oyo ezali koya. (Matai 6:9, 10) Ata soki nakutani na mokakatano oyo nakutaná naino na yango te, mpe soki yango esali lokola kolɛmbisa ngai, namilobelaka ete, ‘Lee, yango ezali bobele mpo na mwa ntango!’ mpe likanisi wana esungaka ngai mingi mpo ete natalela lisusu makambo na lolenge elongobani.—Kokanisá 2 Bakolinti 4:17, 18.
Likambo ya kokamwa mingi mpenza mpo na ngai, nayaki kobala na 1986. Nazalaki kondima ata moke te ete nakobala mokolo mosusu. Nazalaki komituna ete ‘Nani akolinga ete abala mobali lokola ngai?’ Kasi nayaki kokutana na ndeko mwasi Kimberly. Ye atalaki bomoto na ngai ya kati kasi ya libándá te, oyo esilá konyokolama na bokɔnɔ. Asosolaki mpe ete ezaleli ya kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ya nzoto ezali bobele mpo na mwa ntango.
Na mokolo mwa 21 Yúni 1986, tobalanaki ngai na Kimberly na Ndako ya Bokonzi ya lisangá na biso na engumba Pleasanton na etúká ya Californie. Tozwá likatami ya kobota ata mwana moko te mpo noki akosangola bokɔnɔ na ngai. Nakanisi ete ezaleli yango mpe ezali mpo na mwa ntango. Soki ekozala bolingi ya Yehova, tokozala na esengo ya kobota bana na mokili ya sika ya Nzambe.
Nazali na libaku ya kozala nkulutu na lisangá ya Highland Oaks na etúká ya Californie, wana mwasi na ngai Kimberly azali mopalanganisi nsango malamu ya ntango nyonso. Nde mpasi makasi oyo nazwaki na 1981 ebɛtaki ngai mpenza na boye ete natikali bobele na nguya moke mpo na kosala misala. Kobanda ntango wana, lolenge mosusu ya syndrome d’Alport, oyo ezali mpasi mingi te, esili kokɔtela ndeko na ngai ya mwasi. Kati na bandeko na ngai ya mibali, mibale bazali na bokɔnɔ wana, bákisa bokɔnɔ ya bangei; na bongo bazali kosalisama na dialyse. Bandeko na ngai mosusu ya mibali bazali mpenza na nzoto kolɔngɔ́nɔ́.
Nazali kolanda kosalisama na dialyse péritonéale, mpe nazali kosepela na lolenge yango ezali kopesa ngai bonsomi ya kosala mwa misala. Nazali na elikya na mikolo mizali koya mpo atako boni, mikakatano ya ntango oyo—sangisá bokɔnɔ ya bangei—ezali bobele mpo na mwa ntango.—Lisoló ya Lee Cordaway, oyo akufi liboso ya bonyati yango.
Zulunalo Lamuka! etindi bato te ete bálanda lolenge moko to mosusu ya komisalisa nzoto. Lisoló oyo ezali te na mokano ya kolɛmbisa bato ete bápona te lolenge mosusu ya komisalisa, lokola oyo ebéngami hémodialyse. Mwango mokomoko ezali na matomba mpe na mikakatano na yango; na bongo, moto na moto asengeli kozwa likatami oyo lindimami na lisosoli na ye moko mpo na kopona mwango nini akosalela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likambo oyo ete moklisto akondima kotyama enama ya sika kati na nzoto na ye to akondima yango te, ezali likatami ya moto ye moko. —Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1980, lokasa 31 (ebimeli ya Lifalansé).
b Mpo na mayebisi mosusu na ntina na lipaso ya monene kozanga kozongisama makila, talá mwa búku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 16, 17.
c Likambo oyo ete moklisto akondima kosalela EPO to akondima kosalela yango te, ezali likatami ya moto ye moko.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1994, lokasa 31.
[Etanda na lokasa 12]
Lolenge dialyse péritonéale esalaka
Libale
Mabenga ya mosɔpɔ ya moke
Sɔ́nde (ememi nkisi ya sika; ebimisi oyo esili kosala)
Péritoine
Cavité péritonéale
Libenga ya masuba
[Elilingi na lokasa 13]
Elongo na mwasi na ngai, Kimberly