“Toli na ntango ebongi” mpo na moto nyonso
MWASI moko oyo atángaki mokanda Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota akomaki boye: “Mai ya miso etangaki ngai mpo na toli wana ‘ya kitoko mingi,’ oyo epesami na ntango ebongi mpenza. Ndenge bomitii na esika na biso mpo na kolobela na mozindo mpenza mikakatano (ya lolenge) nyonso oyo ekoki kobima na kati ya libota, esimbi mpenza motema na ngai mpe namoni lokola elekeli ngai. . . . Ntango kaka nakómaki na katikati ya mokapo ya 8, natikaki kotánga mpo na komela bino. Nakokaki lisusu kokanga motema te.”
Motángi yango oyo amonisi botɔndi na ye afandaka na etúká ya Caroline ya Nɔrdi, na États-Unis. Alobi lisusu boye: “Nazali kobondela ete libota na ngai mpe mabota mosusu na mokili mobimba etya likebi mingi koleka na makambo oyo ezali na kati ya mokanda yango.”
Mokanda yango ya nkasa 192 esalisi bamilio ya bato na mokili mobimba. Mokanda yango ezali na makambo oyo etali moto mokomoko na kati ya libota, ezala mobali, mwasi, baboti, bana mpe bankɔkɔ. Ezali na mikapo oyo ezali kopesa mateya kitoko mpenza, na ndakisa: “Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza,” “Salisá bana na yo ete bálonga bolenge na bango,” “Batelá libota na yo na bopusi mabe,” mpe “Batelá kimya kati na ndako na yo.”
Soki yo mpe olingi kozwa mokanda yango, tondisá eteni ya lokasa oyo mpe tindá yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo. Okozwa makanisi ya sikisiki oyo ekoki kosalisa yo osilisa mikakatano na yo mpe ozala na esengo na libota na yo, lokola Mozalisi alingaki yango.