Mobombi mapekapeka oyo asepelaki kokumisa Mozalisi
HERMAN STRECKER azalaki moto ya Amerika oyo azalaki kosala bikeko mpe kokɔngɔla mapekapeka mpo na kobomba yango; banda akufá, eleki sikoyo mbula monkama, kasi atikaki ebombelo monene ya mapekapeka ya butu mpe ya moi, ebombelo yango ezalaki na mapekapeka ebele koleka bibombelo nyonso ya mapekapeka ya Amerika na ntango wana. Lelo oyo, ndambo monene ya ebombelo na ye wana, oyo ezali na mitindo ya mapekapeka soki 50 000, ekómá ya Field Museum, oyo ezali na engumba Chicago, na etúká ya Illinois, na États-Unis. Na mitindo nyonso ya mapekapeka na ye ya butu, ezali na moko ya monene oyo eutaki na Amerika ya Sudi mpe eyebani mingi koleka mosusu mpo na nkombo na yango. Mr.Strecker akomaki buku moko nkombo na yango Lepidoptera; na kati ya buku wana, alobi ete apesaki lipekapeka yango nkombo ya moto moko boye te oyo, mbala mosusu, alingaki kobengisa ye mpo na kolya to kofuta ye na mwa mbongo ya kozongisa.a Apesaki yango nde nkombo ya Mozalisi. Na ndenge yango, lipekapeka wana “oyo eleki kitoko” ekotinda baoyo bazali kotala yango bákanisa Nzambe. Kutu, mposa oyo Strecker azalaki na yango ya kokumisa Mozalisi eboti mbuma: lelo oyo, bato ya siansi bakómá kobenga lipekapeka wana Copiopteryx jehovah.
Kasi, bato mosusu oyo bazalaki na bomoi na ntango ya Strecker basepelaki ata moke te na ndenge oyo ye asalelaki nkombo ya Nzambe; kutu moko na bango akomaki boye: “Bato oyo bakanisaka malamumalamu mpe oyo bayekolaka makambo na ndenge esengeli balobaka ete nkombo wana etindaka na kokanisa kaka makambo ya bosantu.” Na efundeli wana, Mr.Strecker azongisaki eyano oyo: “Soki ezali bongo na makanisi ya bato, boye nasepeli mpenza na ndenge naponaki [nkombo wana]; mpamba te, ngai nakanisi ete, eloko nyonso oyo ezali kotinda biso tókanisa Mozalisi . . . ekoki kozala ya mabe te, ya malamu kaka. Kutu, ezali na eloko ata moko te oyo ezali malamu koleka kokanisa makambo ya bosantu, elingi koloba kokanisa makambo oyo ezali komonisa bonene mpe nguya ya Ye oyo aleki bato nyonso.” Yango wana, Strecker, mobombi-mapekapeka, asukisaki na maloba oyo: “Ekokamwisa ngai mpenza soki moto moko boye amoni mabe ntango bapesi nkombo ya Mozalisi epai ya moko ya bikelamu na ye oyo eleki kitoko.”
Ebongi mpenza kopesa Strecker longonya mpo na ezaleli na ye ya kokangama na Nzambe mpe limemya oyo azalaki na yango epai ya Mozalisi. Lelo oyo mpe, baklisto bazali kosalela nkombo monene ya Yehova na likebi mpenza mpe na ndenge oyo ezali kokumisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo ya buku yango ya Strecker na mobimba ezali boye: Lepidoptera, Rhopaloceres and Heteroceres, Indigenous and Exotic; With Descriptions and Colored Illustrations (1872).
[Elilingi na lokasa 31]
Herman Strecker
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Herman Strecker: Fɔtɔ oyo euti na buku The Passing Scene, Vol. 8/The Historical Society of Berks County
[Elilingi na lokasa 31]
(Bonene na yango mpenza)