“Nasɛngi bino bósalisa ngai! Nazali na moto mosusu te kaka bino”
EZALI NA MALOBA WANA nde mwasi moko oyo azali monganga na Iniversite ya minganga na engumba Kaunas, na ekólo Lithuanie, asukisaki mokanda oyo atindaki na biro ya Batatoli ya Yehova ya ekólo yango. Monganga yango alobi boye:
“Na mosala, nabandaki kotánga buku Mituna oyo bilenge batunaka-Biyano bibongi. Nakanaki kosalela mwa makanisi na yango na masolo oyo nazali kokoma, kasi likambo moko esalemaki mpe namonaki lisusu buku yango te. Emonani lokola ete moto moko nde azwaki yango. Kobungisa eloko ya motuya mingi ndenge wana epesaki ngai nkanda. Nasɛngi bino bómonisela ngai boboto, bótindela ngai buku mosusu.
“Nazali mpenza na mposa makasi ya buku yango mpamba te nakendaka kotala biteyelo mingi mpe nalekisaka ntango elongo na bilenge, mpe buku yango esalisaka ngai mpo na koyanola na ebele ya mituna na bango. Soki nazwi mosusu, nakobomba yango na ndako mpe nakobatela yango malamu mpenza. Buku yango ezali na makambo mingi ya ntina, mpe yango wana moto mosusu azwaki yango. Na mikolo oyo ya mpasi, ezali na ntina tózalaka na esika moko ya kozwa nguya. Nasɛngi bino bósalisa ngai! Nazali na moto mosusu te kaka bino.”
Buku Mituna oyo bilenge batunaka ezali kolobela ebele ya mituna oyo bilenge bazalaka na yango na makanisi, mituna lokola: “Lolenge nini nakoki kozwa bonsomi mingi na baboti na ngai?,” “Nasengeli kolongwa na ndako ya baboti?,” “Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solo?,” “Mosala nini ebongi kopona mpo na bomoi na yo mobimba?,” “Okanisi boni mpo na kosangisa nzoto liboso ya kobala?,” mpe “Lolenge nini nakoki koyeba soki ezali solo bolingo?” Oyo nyonso touti kotánga ezali kaka mwa ndambo ya mitó ya makambo oyo ezali na kati ya buku yango. Soki olingi kozwa buku yango, tondisá lokasa oyo ezali awa na nse mpe tindá yango na adresi oyo ezali wana to mpe na adresi oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Bótindela ngai buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi. Na lokota.
□Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia na ndako kozanga kofuta mbongo.