Malasi bato babandá kosalela yango kala mpenza
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA MEXIQUE
Bato basalelaka malasi kobanda kala. Balobaka ete malasi ya libosoliboso ezalaki nde mpaka oyo bazalaki kotumba na ntango ya milulu ya losambo. Na yango, liloba ya Lifalanse “parfum” euti na liloba ya Latin per fumum, oyo elimboli “na kati ya milinga.” Makomi ya kala emonisi ete bato ya Ezipito bazalaki kosalela malasi. Ntango bafungolaki lilita ya Falo Toutankhamon, bamonaki kuna mbɛki 3 000 ya malasi; atako esalaki mbula koleka 3 000, malasi yango ezalaki naino kobimisa mwa nsolo na yango!
Mbula 1 500 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), “malasi oyo mpenza ya malamu” ezalaki kati na biloko oyo Nzambe asɛngaki bátyaka na kati ya mafuta mosantu oyo banganga-nzambe ya Yisalaele bazalaki kosalela. (Exode 30:23-33, NW) Baebele bazalaki kosalela mafuta ya nsolo kitoko mpo na kopakola mpe lokola nkisi; lisusu, bazalaki kopakola yango ebembe liboso ya kokunda yango; yango ezalaki mpenza mpo na koboma bamikrobe mpe kolongola nsolo mabe. Na ndakisa, basi bamemaki matiti ya nsolo mpe mafuta ya nsolo kitoko na lilita mpo na kopakola nzoto ya Yesu. (Luka 23:56; 24:1) Soki Moyisalaele ayambi mopaya epai na ye, asengelaki kopakola ye mafuta ya nsolo kitoko na makolo mpo na komonisa ete ayambi ye malamu.—Luka 7:37-46.
Balobaka ete na ekeke ya liboso, bato ya Loma bazalaki kosalela mbula na mbula tɔni soko 2 800 ya olibana mpe tɔni soko 550 ya mola. Ntango Yesu azalaki mwana moke, bayaki kokabela ye biloko yango ya nsolo oyo basalaka na yango malasi. (Matai 2:1, 11, NW) Balobaka mpe ete na mobu 54 ya ntango na biso (T.B.), Néron, Ampɛrɛrɛ ya Loma abimisaki mosolo oyo ekokani lelo na dolare 100 000 mpo na kotya nsolo kitoko na fɛti moko oyo asalaki. Batiyo oyo babombaki na bandako na ye ya kolya ezalaki kopanza mwa matangá mikemike ya mai ya malasi na nzoto ya bato oyo bazalaki na fɛti. Kobanda na ekeke ya nsambo ya T.B., Ba-Chinois bakómaki kosalela malasi, bakisa mpe basashɛ oyo ezalaki na nsolo ya malasi. Na eleko babengi Moyen Âge, Bamizilma bazalaki mpe na momeseno ya kosalela malasi, mingimingi nsolo kitoko ya fololo babengi roze.
Mosala ya kosala malasi ezwaki mpenza misisa na ekólo France na ekeke ya 17, yango wana bazalaki kobenga ndako ya Mokonzi Louis XV ndako ya nsolo ya malasi. Bazalaki kopakola biloko oyo ezali na nsolo kitoko kaka na nzoto te, kasi bazalaki kopakola yango lisusu na bilamba, na ba gant, na mwa biloko oyo bazalaki kosimba na mabɔkɔ mpo na komipupola mpe na bakiti.
Na ekeke ya 18 basalaki malasi ya mai oyo babengi eau de Cologne. Bazalaki kotya yango na kati ya mai ya kosukola, kosangisa yango na vinyo, kosangisa yango na sukali oyo bazalaki kolya lokola nkisi ya kosukola monɔkɔ, mpe bazalaki komitongola na yango lokola nkisi mpe bazalaki kosangisa yango na bankisi mosusu mpo na kotya yango na esika oyo moto azalaki koyoka mpasi. Na ekeke ya 19, babimisaki mitindo ya malasi oyo basalaka na laboratware. Kobanda wana, bamalasi oyo ekokaki kosalelama lokola nkisi te ekómaki biloko ya mombongo. Lelo oyo mosala ya kosala malasi ezali mpenza mombongo oyo ezali kopesa bamiliare ya badolare.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tolobelaki ndenge nini bato mosusu bakokaka te nsolo ya malasi na Lamuká! ya 8 Augusto 2000 (ebimeli ya Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 31]
Ezipito, mbɛki ya malasi oyo euti na lilita ya Toutankhamon, na ekeke ya 14 L.T.B.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Werner Forman/Egyptian Museum, Le Caire, Égypte/Art Resource, NY
[Elilingi na lokasa 31]
Grèce, ekeke ya 5 L.T.B.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée du Louvre, Paris
[Elilingi na lokasa 31]
France, ekeke ya 18 T.B.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Musée de la Parfumerie Fragonard, Paris
[Elilingi na lokasa 31]
Molangi ya malasi lelo