Nkoma ya batángi
Ozali na likama ya kokóma moombo ya masanga? (8 Ɔkɔtɔbɛ 2005, na Lifalanse) Natángá mbala mingi mikanda ya bato oyo bakomaki ete: “Lisolo oyo eyei na ntango oyo ebongi.” Nazalaki kokanisa te ete ngai mpe nakoki koloba bongo mokolo mosusu; kasi, nalobaki bongo ntango natángaki masolo ya ebandeli na nimero yango. Banda mwa ntango, masanga oyo nakómaki komɛla na mokolo moko ekómaki kotungisa ngai, ata soki nazalaki kolangwa te. Eumelaki te, Lamuká! yango ebimaki. Nsima ya kotánga yango mpe koyeba makama ya komɛla masanga mingi, namonaki ete ebongi natika ezaleli yango.
K. W., Allemagne
Na masolo yango, balobelaki ndakisa ya Hilario, oyo amɛlaki masanga na boumeli ya mbula 30; azalaki komeka kotika, kasi azalaki kokwea mbala na mbala na bolɛmbu yango. Alobaki ete “bandeko na lisangá bazalaki ntango nyonso kosalisa ngai mpe kolendisa ye.” Ebongaki nde te ete azwa mpamela to mpe abimisama na lisangá?
R. L., États-Unis
Eyano ya “Lamuká!”: Mwa makambo oyo lisolo yango elobaki mpo na Hilario eyebisi te ntango oyo azwaki batisimo na boumeli ya mbula 30 oyo azalaki kobunda mpo na kotika masanga. Elobi mpe te soki bankulutu bapamelaki ye. Lisolo yango elobi ete bankulutu bapesaki Hilario “batoli ya Biblia oyo esengeli,” oyo mbala mosusu esalemaka na komite ya kosambisa. Moto oyo alingi kotika masanga, akweaka ntango mosusu na bolɛmbu yango, ndenge esalamaki mpo na Hilario. Mpo na koyeba ndenge oyo lisangá etalelaka likambo yango soki moklisto oyo azwi batisimo azali na mokakatano ya ndenge wana, talá “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 1 Augusto 1983, nkasa 8-11 (ebimeli ya Lifalanse).
Mituna oyo bilenge batunaka . . . Mpo na nini nasepelaka na bato oyo basalaka makambo ya mabe? (22 Yuli 2005, na Lifalanse) Lisolo yango esalisaki ngai namona ete nasengeli kozwaka mikano na mitema mibale te. Esalisaki ngai naboya mpenza baninga ya mabe ndenge nakanaki yango. Lelo oyo, nazali na baninga mingi na lisangá, bilenge mpe mikóló, oyo basalisaka ngai namona ete bato oyo balingaka Yehova basepelaka na ngai mingi mpe balendisaka ngai nakoba kotambola na nzela ya bomoi.
M. D., Mexique
Nazali na ekateli ya kokokisa mokano na ngai (22 Yuni 2005, na Lifalanse) Ntango nazalaki kotánga lisolo ya Martha, nalelaki. Ngai mpe nakweaka maladi ya ndɛkɛ. Nazali mobongisi-nzela banda mbula zomi; kasi, na bantango mosusu ezalaka mpasi—mingimingi soki nakwei ndenge wana. Lisolo ya Martha elendisi ekateli na ngai ya kokoba na mosala na ngai. Epesi ngai makasi mpenza.
J. S., Pologne
Ngai mpe nazali na mokakatano moko na Martha. Banda natángaki lisolo na ye, ngai mpe nakómi kopona malamu biloko oyo nasengeli kolyaka. Na boumeli ya mbula koleka zomi, maladi ya ndɛkɛ ezalaki kopekisa ngai kosalela Yehova mingi. Kasi, eleki sikoyo mbula misato, nazwaki ekateli ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela, mpe nayokaka mawa te mpo na yango. Tiká ete Yehova apambola bino na ndenge bozali kobimisa masolo ya kolendisa ndenge wana!
B.C.C., Brésil
Likambo oyo elendisaki ngai koleka na lisolo yango ezali ete Martha alɛmbaki nzoto te. Nalendisamaki na komona ete, ata ntango Martha asengelaki kokata mosala na ye, azalaki na makanisi ya malamu mpe andimisamaki ete Yehova asepelaka na mosala oyo asalelaka ye na molimo na ye mobimba.
S. H., Japon
Nazalaka na maladi oyo Martha abɛlaka, mpe nayebaka esika oyo makasi na ngai esuki. Lokola Martha, nazali mosakoli ya ntango nyonso. Yango wana, lisolo na ye elendisaki ngai mingi mpenza.
F. G., Suisse