Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/07 nk. 28-29
  • Bato bakómaka baanzelu nsima ya liwa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bakómaka baanzelu nsima ya liwa?
  • Lamuká!—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu​—Bikelamu oyo ekeseni na bato
  • Nini ekómelaka moto nsima ya liwa?
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baanzelu bazali banani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 1/07 nk. 28-29

Engebene Biblia

Bato bakómaka baanzelu nsima ya liwa?

MWANA moko ya mwasi nkombo na ye Argyro, azalaki na mbula nsambo mpamba ntango akufaki. Baboti na ye bazalaki na mawa mingi na motema mpe bazalaki kotala ndenge alalaki na sanduku, balatisaki ye bilamba ya mpɛmbɛ. Mpo na komeka kobɔndisa baboti yango, sango alobaki na bango ete: “Nzambe azalaki na mposa ya anzelu mosusu, yango wana azwi Argyro. Sikoyo, molimo na ye ezali pembeni ya kiti ya bokonzi ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”

Bato mingi bandimaka ete milimo ya bato ekómaka baanzelu nsima ya liwa, atako mangomba mingi te eteyaka likanisi yango. Televizyo, radio, mpe bazulunalo ezali kopalanganisa likanisi yango; okomona na bafilme mingi bazali kolakisa bato oyo, nsima ya kokufa, mpo ‘bázwa mapapu’ mpe bákóma baanzelu, bazali kosalisa mpe kobikisa bato ya bomoi.

Osengeli mpenza kokanisa ete bandeko to baninga na yo bakómaka baanzelu nsima ya liwa? Biblia eteyaka nini na likambo yango? Mpo na kopesa biyano na mituna yango, tótalela naino mwa moke makambo oyo Makomami Mosantu elobi mpo na baanzelu mpe bato bakufá.

Baanzelu​—Bikelamu oyo ekeseni na bato

Baanzelu bafandaka na likoló; bazali bikelamu oyo emonanaka te, bazali na nguya mpe basalelaka Nzambe. Bomoi na bango ezali na boyokani te na bomoi ya bato. Baanzelu bazali bikelamu ya elimo. Biblia elobi boye: “Tiká ete [baanzelu] básanzola nkombo ya [Yehova], mpo ete apesaki mobeko mpe [b]ango [ba]salemaki.”​—Nzembo 148:2, 5.

Biblia emonisi ete bamilio ya bikelamu ya elimo kuna na likoló, na ndakisa baselafa mpe bakeluba, bakokisaka na botosi nyonso mikumba na bango. (Nzembo 103:20, 21; Yisaya 6:1-7; Danyele 7:9, 10) Esɛngaki ete bato bákufaka mpo Nzambe azala na bamilio ya baanzelu wana nyonso? Ezali bongo te. Mpo na nini?

Biblia emonisi ete Nzambe akelaki baanzelu liboso kutu akela bato. Ntango Yehova akelaki mabelé, esika oyo bato basengelaki kofanda, baanzelu, oyo Biblia ebengi minzoto ya ntɔngɔ, ‘[ba]yembaki elongo moko mpe bagangaki na esengo.’ (Yobo 38: 4-7) Boye, Nzambe akelaki baanzelu bankóto ya bambula liboso akela moto ya liboso awa na mabelé.

Longola yango, baanzelu ná bato bazali ndenge moko te mpe esika na bango na mokano ya Nzambe ekeseni.a Lokola Nzambe akelaki moto “mwa moke na nse ya baanzelu,” bikelamu yango ya elimo baleki bato na nguya mpe na mayele. (Baebele 2:7) ‘Efandelo mpenza’ ya baanzelu ezali likoló. (Yuda 6) Nzokande, Nzambe akelaki moto mpo afanda na mabelé libela na libela. (Genese 1:28; 2:17; Nzembo 37:29) Soki mwasi ná mobali ya liboso batosaki Nzambe, balingaki kokufa te. Na yango, banda na ebandeli, mokano ya Nzambe mpo na bato mpe baanzelu ezalaki ndenge moko te.

Nini ekómelaka moto nsima ya liwa?

Mituna mosusu ya ntina oyo tosengeli kotalela ezali oyo: Nini ekómelaka bato nsima ya liwa? Moto oyo akufi akómaka nde na bomoi mosusu, na ndakisa akómaka anzelu na likoló? Biblia epesi eyano ya polele ete: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Na yango, soki moto akufi, azali lisusu na bomoi te. Ayebaka ata eloko moko te, ayokaka te, akanisaka mpe te.

Soki moto akufi, akufi libela? Te! Biblia elobi ete mingi kati na bato oyo bakufá, bakosekwa. Bato mingi oyo bakosekwa bakozala na bomoi na paladiso awa na mabelé.​—Luka 23:43; Yoane 5:28.

Bato moke kaka bazali na elikya ya kosekwa mpo na bomoi na likoló. Bazali kaka bato 144 000. Kasi, bato 144 000 yango bakeseni na bikelamu oyo tobengaka baanzelu. Na ndakisa, bato yango bakozwa nzoto ya elimo oyo ekoki kokufa te mpe bakoyangela elongo na Klisto mpe bakozala banganga-nzambe. Bakozala mpe basambisi. (1 Bakolinti 6:3; Emoniseli 20:6) Bazali nde bana mike oyo bakufá? Te. Bazali bayekoli ya Klisto oyo kondima na bango emekamaki!​—Luka 22:28, 29.

Tótalela mpe bokeseni oyo ezali kati na bato oyo bakufá mpe baanzelu. Bato oyo bakufá “bayebi likambo te”; nzokande, baanzelu bakanisaka, basalaka makambo mingi mpe bazwaka bikateli. Bazali na bonsomi ya kopona. (Genese 6:2, 4; Nzembo 146:4; 2 Petelo 2:4) Biblia elobi ete bato oyo bakufá “bakitisami,” elingi koloba bazali na makasi te; nzokande, baanzelu ‘baleki na nguya.’ (Yisaya 26:14; Nzembo 103:20) Lisusu, bato bakufaka mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo bazwá epai ya nkɔkɔ na bango Adama; nzokande, baanzelu bazali bikelamu ya kokoka mpe bazali ntango nyonso na boyokani malamu na Nzambe.​—Matai 18:10.

Koloba ete milimo ya bato oyo bakufá ekómaka baanzelu euti na makanisi ya bato oyo basalaka bafilme mpe baemisyo mosusu ya televizyo; Biblia eteyaka likanisi yango te. Mateya ya Biblia oyo tolobeli na lisolo oyo ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo bandeko to baninga na biso oyo bakufá bakómaka. Biblia elobi ete baanzelu ya sembo​—bikelamu ya Nzambe oyo bakeseni na bato mpe basalelaka ye​—bazali na nguya koleka bato mpe bakokisaka mokano ya Yehova. Mokano ya Yehova Nzambe ezali mpe ete baanzelu bábatelaka mpe básalisaka bato oyo bazali kotosa ye na motema mobimba mpe kosalela ye.​—Nzembo 34:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “anzelu,” oyo elimboli “momemi-nsango,” ntango mosusu esalelamaka mpo na momemi-nsango nyonso, azala ekelamu ya elimo to mpe moto. Kasi, na lisolo oyo, tozali kolobela bikelamu ya elimo oyo Biblia ebengi baanzelu.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bazali sikoyo baanzelu mpe bazali kosalela Nzambe kuna na likoló?​—Mosakoli 9:5, 10.

◼ Bana mike bakufaka nde soki Nzambe azali na mposa ya baanzelu mosusu?​—Yobo 34:10.

◼ Bato oyo bakufá bakoki kosalisa bato ya bomoi?​—Yisaya 26:14.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

“Tiká ete [baanzelu] básanzola nkombo ya [Yehova], mpo ete apesaki mobeko mpe [b]ango [ba]salemaki.”​—Nzembo 148:2, 5

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto