Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/07 lok. 32
  • Libala oyo elingaki kokufa ebongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libala oyo elingaki kokufa ebongi
  • Lamuká!—2007
Lamuká!—2007
g 7/07 lok. 32

Libala oyo elingaki kokufa ebongi

Na Afrika ya Sudi, patrɔ moko amonaki ete Bella, moko ya basali na ye, azali koyokana lisusu na mobali na ye te. Yango wana, patrɔ yango asɛngaki Thandi, mosali na ye mosusu ya mwasi oyo azali Motatoli ya Yehova, ete asolola na Bella. Bella ayebisaki Thandi ete azwi ekateli ya koboma libala.

Thandi apesaki Bella buku mibale oyo elobi Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, mpe alendisaki ye apesa moko epai ya mobali na ye. Bella mpe asalaki bongo. Nsima ya pɔsɔ moko, Bella ayebisaki Thandi ete mobali na ye azali kotánga buku yango mpe libala na bango ebandi kobonga. Nsima ya sanza misato, Bella ayebisaki Thandi ete Nzambe asalisi bango na nzela ya mabondeli mpe ya buku Bolamu na libota; yango wana, libala na bango ebongi. Kasi, lisolo yango esuki wana te.

Ntango patrɔ ya Bella ayokaki nsango wana, alendisaki basali na ye mosusu nyonso ete bázwa buku yango. Nsukansuka, Thandi apesaki buku Bolamu na libota koleka 100 na baninga na ye ya mosala. Buku yango ya nkasa 192 ezali na mikapo oyo ezali mpenza na makambo ya ntina, na ndakisa “Soki libala elingi kopanzana,” “Batelá libota na yo na bopusi mabe,” mpe “Batelá kimya kati na ndako na yo.”

Okoki kosɛnga buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto