Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/07 lok. 31
  • Okopesa eyano nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okopesa eyano nini?
  • Lamuká!—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NANI ALOBAKI MALOBA OYO?
  • ESALEMAKI NTANGO NINI?
  • NGAI NANI?
  • NGAI NANI?
  • EZALI NA ZULUNALO OYO
  • BIYANO
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2008
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2008
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2008
  • Okopesa eyano nini?
    Lamuká!—2006
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 7/07 lok. 31

Okopesa eyano nini?

NANI ALOBAKI MALOBA OYO?

Tyá mokɔlɔtɔ kobanda na maloba oyo tii na moto oyo alobaki yango.

Davidi

Yesu

Salomo

Paulo

1. “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.”

2. “Kaka ndenge bino bolingaka ete bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”

3. “Bolingo esilaka soki moke te.”

4. “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.”

◼ Mpo na kosolola: Likambo nini mosusu etali mokomoko na bato yango oyo oyebi?

ESALEMAKI NTANGO NINI?

Komá nkombo ya mokomi (to bakomi) ya mokanda mokomoko ya Biblia oyo ezali awa na nse, mpe tyá mokɔlɔtɔ kobanda na nkombo ya mokanda tii na dati oyo ekoki kozala ete basilisaki kokoma yango.

1450 L.T.B. 1090 L.T.B. 1078 L.T.B. 36 T.B. 56 T.B.

5. Yosua

6. Luta

7. Baloma

NGAI NANI?

8. Nasakolaki ete mwasi moko nde akoboma Sisela.

NGAI NANI?

9. Ngai ná mobali na ngai totyaki bomoi na biso na likama mpo na kobikisa Paulo.

EZALI NA ZULUNALO OYO

Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo esengeli.

Lokasa 6 Esengeli kosala nini mpo na kozala moyekoli ya Klisto? (Luka 9:․․․)

Nkasa 7-8 Likambo nini ntoma Paulo alobaki ete ekokómela lisangá ya boklisto nsima ya kokende na ye? (Misala 20:․․․)

Lokasa 11 Satana asali makanisi ya ebele ya bato nini? (2 Bakolinti 4:․․․)

Lokasa 19 Nani akozwa libula ya Bokonzi te? (Baefese 5:․․․)

BIYANO

1. Salomo.​—Masese 9:10, NW.

2. Yesu.​—Luka 6:31.

3. Paulo.​—1 Bakolinti 13:8.

4. Davidi.​—Nzembo 23:1.

5. Yosua, 1450 L.T.B.

6. Samwele, 1090 L.T.B.

7. Paulo, 56 T.B.

8. Debola​—Basambisi 4:4, 9.

9. Pilisika to Pilisila.​—Baloma 16:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto