Gabon: Esika oyo banyama ebatelami malamu
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA GABON
KANISÁ ete otɛlɛmi na libongo moko mpe ozali komona banzoku ezali kolya matiti, bangubu ezali kosakana na mai, mpe babalɛnɛ ná ba dauphin ekutani ebele na kati ya mai! Na pembenipembeni ya mbu, Afrika ezali na mabongo oyo ezali na kilomɛtrɛ 100 epai makambo ya ndenge wana emonanaka mingi.
Emonani ete esengeli mpenza kobatela mabongo wana oyo ekokani na mosusu te, mpo bato bákoba komona makambo ya ndenge wana. Likambo ya esengo, bibongiseli ya kobatela bisika yango esili kozwama, mpe na mokolo ya 4 Sɛtɛmbɛ 2002, Omar Bongo Ondimba, prezida ya Gabon, alobaki ete eteni moko (10 %) ya ekólo na ye, bakisá mpe mabongo oyo ebebisami naino te, ekómi baparke, elingi koloba bisika oyo epekisami koboma banyama.
Bazamba yango, oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ-kare soki 30 000, ekokani na bonene ya ekólo Belgique, mpe ezali na bikelamu ebele. Prezida Omar Bongo alobaki boye: “Mokolo mosusu, Gabon ekoki kokóma esika oyo bato ya mikili ndenge na ndenge oyo balingaka kotala bazamba oyo ebebisami naino te, bakobanda kosopana mpo na kotala yango, ndenge Bamizilma bakendaka kotala engumba ya Mecque.”
Nini esali ete bazamba yango ezala na ntina mingi? Eteni monene (85 %) ya ekólo Gabon ezali naino zamba, mpe milona mosusu (20 %) oyo ezalaka kuna ezalaka na bikólo mosusu te. Lisusu, bazamba na yango ya minene ezali esika ya malamu mpo na mikomboso, banzoku, mpe banyama mosusu oyo etikali lisusu mingi te na mokili. Baparke wana ya sika ekosala ete Gabon ezala moko ya bikólo oyo ebatelaka malamu mpenza bikelamu ndenge na ndenge ya Afrika.
Loango: Libongo oyo ekeseni na mabongo mosusu
Ntango mosusu, Loango ezali moko ya baparke ya Afrika epai bato mingi balingaka kokende kotala banyama. Ezali na mabongo milai mpenza oyo ebebisami naino te, mpe pembeni na yango ezali na bitima minene ya mai mpe zamba moko ya monene. Kasi, eloko mpenza oyo ekesenisi Loango na mabongo mosusu ezali ete banyama lokola ngubu, nzoku, mpakasa, nkoi, mpe mokomboso etambolaka na zɛlo na yango.
Mpo na nini banyama ya zamba esepelaka na libongo wana ya zɛlo ya mpɛmbɛ? Mpamba te ezalaka na matiti oyo ngubu mpe mpakasa elyaka. Lisusu, banzete ya mbila oyo ezalaka pembenipembeni wana ebotaka mbuma ebele oyo ebendaka banzoku, ndenge bonbon ebendaka bana mike. Kasi, ntina mpenza oyo banyama elingaka esika yango ezali mpo bato bazalaka te. Yango wana, na zɛlo na yango, okomona kaka matambe ya banyama.
Lokola bato bayaka wana te, yango etindaka bankoba ya mai, oyo etikali lisusu mingi te, eyaka kobwaka makei na yango wana. Ndɛkɛ babengi guêpier elingaka mpe kotya zumbu na yango wana; etimolaka zɛlo mpo na kosala zumbu na yango mwa mosika na esika oyo mai ya mbu esukaka. Na eleko ya molunge, babalɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá koleka nkóto moko eyaka kosangisa nzoto na mai ya Loango, epai bato bayaka te.
Bitima mibale ya minene ekaboli libongo ya Loango ná zamba ya monene; ngando mpe ngubu elingaka kofanda na bitima yango. Bitima yango ezali na mbisi ebele, mpe pembenipembeni na yango ezali na ebele ya banzete babengi mangrove. Bingondo ya ndenge na ndenge epumbwaka likoló ya bitima wana mpo na koluka mbisi, nzokande mitindo ebele ya ndɛkɛ babengi martin-pêcheur ya langi ndenge na ndenge, elukaka mbisi pembenipembeni ya bitima yango. Lokola banzoku elingaka mai, ekatisaka bitima yango mpo ekóma tii na libongo, epai elyaka mbuma oyo elingaka mingi.
Na kati ya zamba ya monene, makako epumbwaka na bitape ya likoló mpenza, nzokande mapekapeka ya langi kitoko epumbwaka na bisika oyo moi ekómaka. Moi mobimba, ngembo ekangamaka na banzete oyo yango elingaka, mpe na butu esalaka mosala na yango ya ntina mingi ya kopanza mbuma na zamba. Na pembenipembeni ya zamba yango, bandɛkɛ ya langilangi ebendaka mai ya bafololo mpe ya banzete ya mike mpe ya minene. Yango wana, tokoki kokamwa te ndenge balobaka ete Loango ezali “esika oyo okoki komona biloko kitoko mpenza oyo ezalaka na Afrika ya ntei.”
Lopé: esika oyo mikomboso ezali naino mingi
Parke ya Lopé ezali na zamba monene oyo bato babebisá naino te, mpe na nɔrdi ya parke yango ezali na mwa bazamba ya mikemike, oyo mosusu ezali pembenipembeni ya mai. Ezali esika ya malamu mpenza mpo na bato oyo balingaka komona banyama lokola mikomboso to makako ezali kotambola na zamba. Mikomboso soki 3 000 tii 5 000 etambolaka na parke yango, oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ-kare 5 000.
Augustin, mokambi moko ya kala ya parke yango, azali koyeba lisusu mbala moko oyo akutanaki boye na mikomboso na mobu 2002. Alobi boye: “Nazalaki kotambola na zamba, mbala moko nakutanaki na mikomboso minei ya libota moko. Oyo ya mobali ezalaki na nsuki ya mpɛmbɛ na mokɔngɔ, ekokaki kozala na mbula soki 35, mpe na kilo na ngai mbala misato. Eyaki kotɛlɛma liboso na ngai. Nalandaki malako: nafandaki mbala moko na nse, nagumbaki motó mpe nazalaki kotala na mabelé mpo na komonisa limemya. Mokomboso yango eyaki kofanda pene na ngai, mpe etyaki lobɔkɔ na yango na lipeka na ngai. Na nsima, esimbaki lobɔkɔ na ngai, efungolaki yango, mpe etalaki yango malamumalamu. Ntango emonaki ete nakosala libota na yango mabe te, ekendeki malɛmbɛ mpe ekɔtaki na kati ya zamba. Na mokolo wana oyo nabosanaka te, nayokaki mpenza esengo ya kokutana boye na nyama na bisika oyo efandaka. Atako bato babomaka mikomboso mpo na kolya to mpo bakanisaka ete ezali likama mpo na bato, mikomboso esalaka moto mabe te mpe ebongi ete tóbatela yango.”
Na parke ya Lopé, makako ya minene babengi mandrill, esanganaka mpo na kosala bitonga oyo ekoki kozala na makako yango ata koleka nkóto moko. Na mokili mobimba, yango ezali moko ya bisika oyo okoki kokuta makako mpe mikomboso ebele ndenge wana esika moko, mpe esalaka mpenza makɛlɛlɛ mingi. Moto moko oyo autaki Cameroun mpo na kotala parke yango, alobeli ndenge amonaki etonga moko ya monene ya makako yango.
Alobi boye: “Moto oyo azalaki kolakisa biso parke yango ayebaki ete etonga moko ya makako ezali koya, na lisalisi ya biloko oyo balatisá banyama mingi na nkingo. Tokendaki mbala moko esika oyo makako yango ezalaki koya, mpe tomibombaki mpo na kozela bango. Na boumeli ya miniti 20, tozalaki koyoka makɛlɛlɛ ya bandɛkɛ mpe banyamankɛkɛ, oyo ezalaki lokola miziki. Mbala moko, ntango etonga ya makako yango ekómaki pene, mwa makɛlɛlɛ wana ekatanaki. Ntango nayokaki makɛlɛlɛ ya makako yango mpe ya bitape oyo ezalaki kobukana, nakanisaki ete mopɛpɛ moko ya makasi ezali koya. Ntango namonaki makako ya liboso, ezalaki lokola basoda oyo bakendaka liboso ya limpinga mobimba ya basoda. Makako minene ya mibali ezalaki kotambola mbangumbangu na mabelé, oyo ya basi mpe bana ezalaki kopumbwa na banzete. Mbala moko, moko ya mobali etɛlɛmaki mpe ebandaki kotalatala lokola nde emoni likama. Moko ya elenge, oyo ezalaki kopumbwa likoló mpenza, egangaki mpo na kokebisa basusu. Yango nyonso ekómaki kokende nokinoki mpe makɛlɛlɛ eyaki lisusu makasi ntango ekómaki koganga na nkanda. Eumelaki te, yango nyonso ekendaki. Moto oyo azalaki kolakisa biso parke yango amekaki kotánga yango mpe alobaki ete ekokaki kozala 400.”
Mikomboso mpe esalaka makɛlɛlɛ kaka lokola makako wana, kasi ezali mpasi mpo na koyeba esika yango ezali, mpamba te etambolaka mingi mpo na koluka bilei. Nzokande, bato nyonso oyo bakendaka kotala parke wana bazangaka te komona makako oyo babengaka singe hocheur, mpo ntango mosusu etambolaka na zamba ya mikemike oyo ezali pembenipembeni ya zamba ya monene. Ntango mosusu, makako oyo elingaka kozala na esika na yango moko ezali nde makako ya mokila ya langi ya moi, oyo ezalaka na bikólo mosusu te, mpe euti koyebana eleki soki mbula 20.
Bandɛkɛ ya minene mpe ya langi ndenge na ndenge, na ndakisa touraco ná calao, oyo ezali na zamba ya parke yango, esalaka makɛlɛlɛ na mongongo ya monene. Bamoni ete mitindo ya bandɛkɛ oyo ezali na parke yango ekoki kokóma soki 400. Yango wana, bato oyo balingaka kotala bandɛkɛ basopanaka kuna kaka ndenge Bamizilma bakendaka kotala Mecque.
Esika oyo bikelamu ndenge na ndenge ebatelami
Parke ya Loango mpe oyo ya Lopé ezali kaka ndakisa mibale ya baparke 13 ya Gabon. Baparke mosusu ezali kobatela bazamba ya mangrove, banzete mpe bafololo oyo ezalaka bisika mosusu te, mpe bisika oyo bandɛkɛ oyo eutaka mikili ya mosika eyaka mpe elekaka. Lee White, oyo asalaka na ebongiseli moko oyo ebatelaka bazamba mpe banyama (Wildlife Conservation Society), alobi boye: “Na nzela ya baparke wana, Gabon ebateli banyama, bandɛkɛ, mai mpe bazamba oyo eleki malamu na ekólo yango. Baparke yango ezali kaka minene te, kasi etondi mpe na biloko ya ntina mingi. Na mobu 2002, babongisaki baparke mingi na mwa ntango moke, mpe baparke yango ezali kobatela malamu bikelamu ndenge na ndenge ya ekólo.”
Atako bongo, ndenge prezida Omar Bongo alobaki, mikakatano ezali naino ebele. Alobaki boye: “Yango ezali likambo ya mokili mobimba. Na ntembe te, ezali kosɛnga ete biso nyonso tómipimela makambo mosusu banda sikoyo mpe na mikolo ezali koya soki tolingi kokokisa mokano na biso ya kotika bikelamu kitoko wana na bana oyo bakobotama nsima.”
[Karte na lokasa 17]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
AFRICA
GABON
The 13 national parks of Gabon
Lopé National Park
Loango National Park
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Balɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá mpe fɔtɔ ya Loango oyo bazwaki na mpɛpɔ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Balɛnɛ: Wildlife Conservation Society
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Makako (lobɔkɔ ya mwasi) mpe mokomboso (lobɔkɔ ya mobali)
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Robert J. Ross