Ndenge mwana abotamaka ezali likamwisi
SANZA libwa ya kozela ekoki, mpe mwana oyo mama azalaki alingi abima.a Kino ntango wana nzela oyo mwana abimaka ezalaki kaka ya kokangama makasi; yango esalaki ete mwana abatelama malamu na libumu ya mama. Kasi, sikoyo nzela yango ekómi moke, pɛtɛpɛtɛ, mpe na nsima efungwami. Likamwisi ya kobotama ya mwana ebandi.
Nini esalaka ete kobotama ya mwana ezala likambo ya kokamwa? Kati na makambo mingi oyo esalaka likambo yango, mibale ezali mpenza ya kokamwisa. Ya liboso, hormone babengi ocytocine, oyo bɔɔngɔ esalaka ebimaka. Ezala mwasi to mobali bazalaka na hormone yango, kasi, ebimaka nde mingi epai ya mwasi ya zemi ntango mpasi ya kobota ebandaka mpe yango esalaka ete nzela ya kobota ya mama efungwama mpe ekóma moke.
Ndenge nini enama babengi hypophyse, oyo ezalaka na motó, na kati ya bɔɔngo, eyebaka ete ntango ekoki mpo ebimisa hormone yango? Ezali Likamwisi. Buku moko (Incredible Voyage—Exploring the Human Body) elobi ete: “Kozanga ete mwasi ayeba yango, bɔɔngɔ na ye eyebaka ete zemi ekómi na nsuka, mpe ntango ekoki mpo matrisi . . . ebanda mosala na yango ya makasi, kasi oyo eumelaka te.”
Likambo ya mibale ezali mosala oyo kɔku (placenta) esalaka; etikaka kobimisa progestérone. Na boumeli ya zemi, progestérone epekisaka ete mwasi ayoka mpasi mingi. Kasi, sikoyo lokola progestérone etiki kosala mosala na yango, mpasi ya kobota ekobanda. Mbala mingi, nsima ya ngonga 8 tii ngonga 13 ya mpasi ya kobota, bebe abimaka na nzela wana ya kobota oyo efungwamaki. Na nsima, kɔku mpe ebimaka.
Sikoyo, mwana oyo auti kobotama asengeli nokinoki komesana na bomoi ya sika, bomoi oyo ekeseni mpenza na oyo azalaki na yango na kati ya libumu ya mama na ye. Na ndakisa, ntango azalaki na kati ya matrisi, mimpululu na ye etondaki na mai oyo ebatelaka mwana na kati ya libumu ya mama, mai oyo ebimaki ntango mwana abotami. Sikoyo, mimpululu na ye esengeli kotonda na mopɛpɛ mpo mwana abanda kopema, likambo oyo emonanaka na kolela ya liboso ya mwana. Mbongwana mosusu ya ntina esalemaka mpe na motema mpe na bisika mosusu nyonso oyo makila etambolaka. Lidusu oyo ekangisi misisa ya mapululu (oreillettes) na motema mpe mosisa oyo eleká likoló ya nzela oyo elekisaka makila na mimpululu ekangamaka, mpo elekisa makila tii na mimpululu, mpe yango esalaka ete makila ezala na likoki ya kobenda oxygène. Ezali mpenza likambo ya kokamwa, ndenge mwana amesanaka noki na bomoi libándá ya libumu ya mama.
Makambo nyonso oyo esalemaka banda mpasi ya kobota tii mwana akobima, ezali kokundwela biso maloba oyo ya Biblia: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, ɛɛ likambo na likambo na ntango na yango na nse ya lola.” Na mpe “ntango ya kobotama.” (Mosakoli 3:1, 2) Na ntembe te, okondima ete makambo nyonso oyo esalemaka na kobotama ya mwana mpe ndenge mwasi ayokaka, oyo nyonso esalemaka kaka nsima ya mwa bangonga moke, ezali kokumisa mpenza Mozalisi na biso, oyo Biblia ebengi ye “liziba ya bomoi.”—Nzembo 36:9; Mosakoli 11:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbala mingi, zemi eumelaka sanza 8 na ndambo to sanza 9.
[Etanda/Bililingi na nkasa 16, 17]
Ndenge kobotama ya mwana esalemaka
1 Ndenge oyo mwana azalaka na libumu liboso ete mpasi ya kobota ebanda
2 Ndenge oyo mwana ayaka liboso ete abotama
3 Nzela ya kobota ya mama efungwami
4 Kobima ya mwana
[Etanda]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
1
Kɔku
Nzela ya basi
Nzela oyo mwana abimaka
2
3
4