Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Juillet nk. 6-9
  • Kosopa zemi: Likambo ya nsomo mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosopa zemi: Likambo ya nsomo mingi
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo mama azali kooka
  • Oyo mwana azali kooka
  • Oyo monganga azali kooka
  • Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
    Lamuká!—2009
  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Kokakatana likoló na kosopa zemi—Nzela ezali nde na koboma milió 60 ya bana?
    Lamuká!—1993
  • Mangomba oyo makoki kopesa eyano?
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Juillet nk. 6-9

Kosopa zemi: Likambo ya nsomo mingi

BANA bamilió 50 kino 60 bazali kobomama mbula nyonso na nzela ya kosopa zemi. Ozali koyeba bonene ya motuya oyo? Ezali lokola ete mbula nyonso bazali koboma motuya na bato mokokani na bafandi nyonso ya Zaïre, bakisa baoyo nyonso ya Congo mpe ya Angola.

Biyangeli mingi bizali kokoma mituya nyonso te; ntina wana mituya ya solosolo miyebani te. Lisusu, epai oyo kosopa zemi epekisami na mibeko to ekosalemaka bobele nsima na kozwa ndingisa, bobele ndambo na mituya nde mizali kopesama. Nde ata bongo, bosukisi oyo ya ntina mingi eyei komonana:

Na États-Unis, kolongola zemi ezali lipasó to opération ya mibale ezali kosalema mingi nsima na lipasó oyo ya kolongola biloko babengi amygdales (oyo bikozalaka na mongongo). Mbula nyonso, basi koleka 1,5 million bazali kolongolisa zemi, kati na bango motuya monene (80%) babali te. Basi oyo bazali minzemba bazali kosopa zemi mbala mibale koleka zemi oyo bazali kobota; nzokande basi oyo babali bazali kobota mbala zomi koleka zemi oyo ezali kosopama.

Na Amérique Centrale mpe na Amérique du Sud epai lingomba ya Katolike ezali na bopusi mingi, mibeko mipekisi makasi kosopa zemi koleka bipai nyonso na mokili. Nde ata boye, basi mingi bazali kolongolisa zemi na kobukaka mibeko yango mpe ekómi bongo likámá monene mpo na kolongono ya basi. Na yango, basi soko milió minei ya ekólo Brésil balongolisaki zemi na mobu moleki, kati na bango 400 000 basalisamaki lisusu na minganga mpo na mindondo mibimaki nsima. Kuna na eteni ya molongo oyo ebengami Amérique latine, soko zemi moko kati na zemi minei ezali kobebisama.

Na Afrika, mibeko mizali mpe makasi. Basi mingi bazali kozwa makámá mpe mingi bazali kokufa, mingimingi baoyo bazali kolongolisa zemi na kobombama.

Na mikili mingi ya Proche-Orient, mibeko mizali makasi nde ata bongo, basi oyo bazali na makoki bazali mbala mingi kolónga kolongolisa zemi kozanga mindondo.

Ntalo monene na mikili ya Mpótó mizali kopesa nzela na kolongolisa zemi mpo na bantina mosusu. Na mikili mibengami Scandinavie, kuna nde biyangeli batiki nzela mpenza na likambo yango. Balopitalo na Grande-Bretagne ezali kokoma motuya ya bazemi elongolami, babandaki kosala boye uta ndingisa epesamaki na likambo yango na 1967: lelo oyo na mokili yango, motuya na bazemi elongolami ezali mbala mibale, motuya ya bana ya balabala ebakisami, bakisa lisusu maladi makozwamaka na kosangisa nzoto mpe bondumba, na maladi mosusu makobebisaka biboteli.

Na mikili ya Europe de l’Est, mibeko likoló na kolongola zemi ezali komonisa motindo mbongwana ekoti na mikili yango mpe ezali se kolandana. Mikili mibengamaki kala ete Union soviétique ezali na molongo ya liboso na mikili oyo elekisi kolongola bazemi, mpo ete mbula mokomoko bazemi soko milió 11 ezali kolongolama. Lokola nkisi ya kokanga kobota ezali komonana mingi te mpe bomoi ezali mpasi mingi, basi bazali kolongola zemi mbala motoba kino mbala libwa kati na bomoi na bango.

Na mikili ya Europe de l’Est, bakomi bobele kotika nzela na likambo yango. Na ndakisa, totalela maye mazali koleka na mokili ya Roumanie. Leta oyo ezalaki wana liboso epekisaki makasi kosopa zemi mpe kokanga kobota; bazalaki na mokano ete bato bayikana mingi na mboka na bango. Mwasi mokomoko asengelaki kobota bana minei to koleka. Na 1988, bana oyo basundolamaki bakómaki mingi mpenza mpe esika ya kobomba bango ezalaki kokoka lisusu te. Uta Leta mosusu oyo ebandaki kotambwisa mboka na 1989 elongolaki mobeko mopekisaki kosopa zemi, zemi 3 kati na 4 ezali kobebisama, ezali bongo motuya moleki likoló na Mpótó mobimba.

Epai balekisi mpenza kolongola zemi ezali na Asie. Na mokili ya Chine, Leta asengi ete libota mokomoko ezala se na mwana moko mpamba mpe kobebisa zemi mosusu; yango wana Chine ezali na esika ya liboso mpenza na kosopa zemi: milió 14 mbula nyonso. Na Japon, basi bazali na mwa bikeko oyo bazali kolatisa yango bilamba mpe kotyela yango biloko mpo na kosakana; ezali kokundola bango bana oyo babotaki te mpo ete balongolaki zemi yango. Mingi bazali koboya komela nkisi mpo na kokanga kobota, mpe bazali komona malamu bobele kosopa zemi.

Bipai nyonso na Asie, mpe mingi mpenza na Inde, mayele ya sika ya minganga epesi kokakatana makasi epai ya basi oyo bazali kobundela baninga na bango basi ete bazwa bonsomi ya kolongola zemi. Mpamba te, na mayele ya sika oyo babengi amniocentèse mpe mosusu échographie, monganga akoki koyeba libela soki mwana akozala mobali to soki akozala mwasi. Nzokande kuna na Asie baleki kolinga mingi bana mibali. Yango wana, epai oyo eyebani ete mwana akozala mwasi mpe likoki ezali ya kobebisa zemi wana, basi mingi bazali kolongola zemi yango; kosalaka bongo, motuya ya bana mibali ezali koleka motuya ya bana basi. Ekómi bongo mokakatano makasi epai ya basi oyo bazali kobundela lotómo ya kosopa zemi: bazali kosenga lotómo ete mwasi alongola zemi soki eyebani ete mwana oyo akobota akozala moninga na ye mwasi.

Na Asie, epai bazali kolinga mingi bana mibali, minganga bazali kolongola bankóto ya bazemi epai na basi oyo bazali na bazemi ya bana basi

Oyo mama azali kooka

Lokola mpo na lipasó nyonso, kolongola zemi ezali na makámá na yango mpe na mpasi na yango. Na ntango mwasi azali na zemi, nzela ya matrice ekangamaka makasi mpo na kobatela mwana. Kofungola yango mpe kolekisa bisaleli mpo na kobenda mwana ekoki kookisa mpasi mingi to mpe kozokisa. Kolongola zemi na aspiration (esaleli ekobenda mwana na mopepe makasi) ekoumelaka minite ntuku misato. Epai ya basi mosusu, ekookisaka bango bwale mpenza mpe mingai, oyo ntango mosusu bazali komeka kokanga motema mpo na yango kasi ntango mosusu ezali kokóma monyokoli makasi mpenza oyo bayebi kokanga motema mpo na yango te. Kolongola zemi na nzela na nkisi epesami na ntonga ezali kopusa mwana ete abima lokola na ntango ya kobotama, ntango mosusu bakosalelaka nkisi ebengami prostaglandine mpo ete mama akoka kooka mpasi ya kobota. Mpasi yango, oyo ekoumelaka ngonga mingi, to mpe mikolo mingi, ezalaka bwale mpenza na nzoto mpe ekolembisaka na makanisi.

Kobima makila, kozoka to kopaswama na nzela ya matrice, kotobwana ya matrice, mabanga ya makila, konyokwama nsima ya anesthésie, kobendana ya misisa, mɔ́tɔ na nzoto, kolenga mpe kosanza, ezali moko makambo mamonanaka epai ya mwasi oyo auti kolongola zemi. Akoki kozwa maladi mosusu soki biteni ya mwana to ya placenta bitikali kati na matrice. Yango esalemaka mbala mingi, mpe ntango mosusu ekosengaka lipasó mpo na kobimisa biloko wana bibandi kopola na libumu, mbala mosusu mpe kolongola matrice. Engebene bolukiluki bosalemaki na États-Unis, na Grande-Bretagne mpe na ex-Tchécoslovaquie, kolongola zemi ezalaka na mpasi mosusu nsima, na ndakisa basi mosusu bakómi ekomba mpo na yango, basusu zemi ezali kokita na matrice te, basusu ezali kolongwa yango moko, basusu bazali kobota bana oyo sanza ekoki te mpe basusu bazali kobota bana basalemi malamu te.

Everett Koop, ministre ya kala na États-Unis mpo na makambo matali santé, alobaki ete naino moto moko te asili kosala “bolukiluki likoló na mayoki to makanisi ya bokúmbi ngambo makozalaka na basi oyo balongolaki zemi mpe sikawa bazali na mposa ya kobota mwana kasi likoki ezali lisusu te.”

Bolukiluki likoló na kosopa zemi, mbele esengelaki mpe kotalela bituluku ya bilenge basi baklisto ya peto, bayebi mobali te, bazali na limemya mpo na bomoi mpe bazali kotosa mibeko ya Nzambe. Mbele elingaki komonana ete bango bazali na boyokani malamu mpenza, bazali na limemya mingi mpo na bomoto na bango moko mpe bazali na kimya na elimo.

Oyo mwana azali kooka

Mwana oyo afandi malamu mpe na kimya nyonso na libumu ya mama na ye, azali kooka nini ntango babandi koboma ye kuna na kati? Tokoki bobele kokanisa yango, mpamba te moto moko te akozala wana mpo na koyebisa biso nini azali kooka.

Mingimingi zemi elongolamaka kobanda na poso ya liboso kino na poso ya 12 ya bomoi ya mwana. Na ntango yango, mwa mwana kati na libumu azali kopema mpe azali komela nsoi. Motema na ye ezali kobeta. Azali koningisa misapi ya makolo, azali kokanga maboko, azali kobaluka na kati na mai oyo ezingi ye . . . mpe azali kooka mpasi.

Zemi mingi elongolami na libumu mpe ebwakami na saani moko moke na nzela na tiyó moko oyo na nsuka na yango ezali na eloko lokola mbeli. Bazali kobenga mwango yango ete aspiration sous vide. Makasi ya bobendi (makasi ya aspirateur ya ndako ekokoka mbala 29) ezali kopasola mwa mwana yango. Mwango mosusu ezali ya kofungola nzela ya matrice mpe kosala curetage: mbeli moke engumbama ezali kokombola matrice, mpe mwana akatani bitenibiteni.

Mpo na bana oyo balekisi poso 16 kati na libumu [na mikili epai kuna mibeko mipesi yango nzela], bazali kosalela ngɛngɛ to poison ebengami solution saline. Na nzela na ntonga moko molai, bakotobola libenga ya mai esika mwana afandi; bakolongola ndambo ya mai ya malamu oyo ezali wana (liquide amniotique) mpe bakokitanya yango na mai ya mungwa makasi. Mwana akomela yango mpe akopema, mapulúlú to ba poumons na ye ya petepete ekotonda na ngɛngɛ yango, akobanda kobunda mpe akobendanabendana. Ngɛngɛ wana ya mungwa etumbi mposo na ye nyonso mpe misuni mitikali polele, mibebisami. Makila makoki kobanda kobima na motó. Nsima na mwa bangonga, mwana akokufa liwa ya mpasi mingi; atako na mabaku mosusu, ntango mwasi akoya kobimisa mwana yango na mokolo molandi, ekoki kozala ete akufi naino te, kasi azali kobunda na mpasi ya liwa.

Soki mwana akóli mingi mpe myango oyo nyonso to misusu lokola oyo ekoki te mpo na koboma ye, etikali bobele lipasó, césarienne, mpo na kobikisa mwana te kasi mpo na kozwa ye mpe koboma ye. Bakofungola libumu ya mama, mpe mbala mingi bakozwa mwana azali naino na bomoi. Basusu bazali ata kolela. Kasi bakotika ye ete akufa, soki te bakofina ye na mongongo, bakozindisa ye na mai to bakoboma ye na nkó na nzela mosusu.

Oyo monganga azali kooka

Uta bikeke mingi, minganga bazali kolanda ndai ya Hippocrate, oyo elobi kati na makambo mosusu ete: “Nakopesa ngɛngɛ na moto moko te soki basengi ngai yango, mpe ngai moko nakopesa moto lilako motindo wana te; bobele bongo, nakopesa na mwasi moko te nkisi ya kobebisa zemi. Nakolekisa bomoi na ngai mpe nakosala mosala na ngai na bosembo mpe na bopeto.”

Minyoko nini mizali koleka kati na lisosoli ya minganga oyo basali mosala ya koboma mwana kati na libumu ya mama na ye? Monganga George Flesh apesi lisoló na ye na maloba oyo: “Bazemi ya liboso oyo nalongolaki, ntango nazalaki naino monganga-moyekoli, etungisaki ngai te. . . . Kasi nsima na kolongola nkáma mingi ya bazemi nde nabandaki komitungisa. . . . Eloko nini epusaki ngai ete nabongola makanisi? Na ebandeli ya mosala na ngai, mwasi moko ayaki elongo na mobali na ye kosenga ete nalongola ye zemi azalaki na yango. Kasi nzela ya matrice ya mwasi yango ekangamaki makasi mpe nakokaki kofungola yango te. Nalobaki na bango ete baya nsima ya poso moko, ntango wana nzela ya matrice ekolemba. Ntango bazongelaki ngai, bazalaki lisusu na makanisi ya kolongola zemi te. Nsima na sanza nsambo nabotisaki mwasi yango.

“Mbula mingi na nsima, nasakanaki elongo na mwana yango Jeffrey na piscine esika baboti na ye mpe ngai tomesenaki kosakana. Azalaki mwa mwana mobali kitoko, na esengo ya kozala na bomoi. Nayokaki nsomo ntango nakanisaki ete bobele mwa nkáka moke nde epekisaki ngai koboma Jeffrey na libumu ya mama na ye. . . . Nabanzi ete kokatakata mwana kati na libumu ya mama na ye, bobele mpo ete mama asengi bongo ezali mbeba makasi oyo mokili esengeli kondima yango te.”

Na États-Unis, 80% ya basi oyo bazali kolongola zemi bazali minzemba

Mwasi moko infirmière atiká kopesa maboko na mosala ya kolongola bazemi alobi na biso motindo azalaki kosala kati na clinique moko oyo bamipesá na mosala yango: “Moko kati na misala na biso ezalaki kotanga biteni. . . . Soki biteni mosusu ya bébé bitikali kati na matrice ya mama oyo ayei kolongolisa zemi mpe akei na yango, akoki kozwa mpasi makasi. Nazalaki bongo kotanga biteni mpo na komona ete maboko mibale mazali wana, makolo mibale mazali wana, ntolo ezali, motó ezali. . . . Ngai nazali na bana minei. . . . Nazalaki na mokakatano makasi soki natali mosala na ngai mpe bomoi na ngai na ndako. Solo, kolongola zemi ezali eloko ya nsomo mingi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto