Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/12 nk. 10-12
  • Kobɔkɔla bana oyo babandi kokóma bilenge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobɔkɔla bana oyo babandi kokóma bilenge
  • Lamuká!—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango ya koyoka
  • “Kolimbisana na motema moko”
  • “Bózala na botɔndi”
  • “Koboyela mwana disiplini te”
  • ‘Ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana’
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Biblia ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla bana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 1/12 nk. 10-12

Kobɔkɔla bana oyo babandi kokóma bilenge

“Tii ntango bana bakokisi naino mbula mitano te, bazali na kimya na ndako ya baboti mpe ezali mpasi te mpo na koteya bango bizaleli malamu. Kasi ntango kaka babandi kokende na kelasi, bakómi komona ndenge mosusu ya kosala makambo mpe ndenge mosusu ya koloba.”​—Valter, Italie.

NTANGO bana bazali kokola, bakómaka koyeba bato mosusu. Bakómaka kokutana na bato mingi: baninga ya masano, baninga ya kelasi, mpe bandeko mosusu ya libota. Ndenge Valter, oyo touti kolobela, amonisi yango, ezali lisusu yo moko te nde ozali koteya mwana na yo makambo oyo asengeli kosala na bomoi na ye, ndenge ozalaki kosala yango ntango azalaki naino mwana moke. Yango wana, ezali na ntina mingi ete na bambula wana, oteya mwana na yo ntina ya kotosa mpe kozala na bonkonde. Ezali mpe na ntina mingi oteya mwana koyeba kokesenisa malamu ná mabe.

Botosi, bonkonde, mpe koyeba kokesenisa malamu ná mabe eyaka yango moko te. Ntango mosusu ekosɛnga ‘opamela, osembola, olendisa, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.’ (2 Timote 4:2) Mibeko ya Nzambe ezalaki kosɛnga baboti na Yisraele básala boye: “Osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.” (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Ndenge bavɛrsɛ wana emonisi yango, ezali na ntina mingi okoba koteya bana na yo.

Kobɔkɔla bana ezali mokumba moko oyo ezalaka mpe na mikakatano mingi. Tótalela mwa ndambo na yango.

Ntango ya koyoka

Biblia elobi ete lokola “ntango ya koloba” ezali, ntango ya koyoka mpe ezali. (Mosakoli 3:7) Ndenge nini okoki koteya mwana na yo alandaka na likebi ntango bato mosusu​—ezala mpe yo moko—​bazali koloba? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kopesa ndakisa. Yo moko, oyokaka basusu na likebi, ata mpe bana na yo?

Ezalaka mpasi te mpo makambo mosusu elongola likebi ya bana, mpe na ntembe te, ekosɛnga mpenza ozala na motema molai mpo okoka kosolola na bango. Bana nyonso bazalaka ndenge moko te, yango wana salelá miso mpe yebá ndenge ya malamu koleka ya kosolola na mwana na yo. Na ndakisa, David, tata moko na Grande-Bretagne, alobi boye: “Nasɛngaka mwana na biso ya mwasi ayebisa ngai na maloba na ye moko makambo oyo nauti koyebisa ye. Yango wana, akómá koyoka mingi wana azali kokola.”

Ntango Yesu azalaki koteya bayekoli na ye, ayebisaki bango boye: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.” (Luka 8:18) Soki mikóló basengeli kosala yango, na ntembe te bana basengeli kosala yango mingi koleka!

“Kolimbisana na motema moko”

Biblia elobi boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Bakolose 3:13) Baboti bakoki koteya bana na bango báyeba kolimbisa. Ndenge nini?

Ndenge touti koloba yango na likambo etali koyeba koyoka, osengeli kopesa ndakisa. Tiká bana na yo bámonaka ete yo mpe olimbisaka basusu. Marina, mama moko na Russie, asalaka makasi mpo na kosala yango. Alobi boye: “Tosalaka makasi tózala ndakisa malamu mpo na bana na biso na likambo etali kolimbisa basusu, kobatela kimya, mpe kosilikaka mpambampamba te.” Abakisi mpe boye: “Soki nalobi to nasali mabe, nasɛngaka bana na ngai bolimbisi. Nalingaka ete bango mpe báyeba kolimbisa basusu.”

Koyeba kosilisa matata mpe kolimbisa ekosalisa mwana mingi ntango akokóma mokóló. Teyá bana na yo banda sikoyo báyeba komitya na esika ya basusu mpe bándimaka nyonso oyo ekokómela bango soki basali mabunga. Soki osali bongo, okopesa bango likabo moko kitoko oyo ekosalisa bango mingi ntango bakokola.

“Bózala na botɔndi”

Na ntango oyo ya “mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” bato mingi “bamilingaka.” (2 Timote 3:1, 2) Lokola bana na yo bazali naino mike, sikoyo nde ntango ya koteya bango bázalaka na botɔndi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

Ata ntango bana bazali naino mike, bakoki koyekola komonisa bonkonde mpe komitya na esika ya basusu. Ndenge nini? Monganga Kyle Pruett akomaki boye na zulunalo moko (Parents): “Lolenge ya malamu koleka oyo okoki koteya bana na yo bázala na botɔndi ezali ya kozala yo moko ntango nyonso na botɔndi mpo na bandeko na yo ya libota.” Abakisi boye: “Yango elimboli kolobaka mbala na mbala ete osepelaka na lisungi oyo bapesaka yo mpe na ndenge oyo bamibanzabanzaka mpo na yo . . . Mpo yango ekóma momeseno, esɛngaka kosala bongo mbala na mbala.”

Richard, tata moko oyo afandaka na Grande-Bretagne, asalaka makasi ya kosala bongo. Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosalaka mwa makambo ya mikemike mpo na komonisa botɔndi epai ya bato oyo basalelaki biso bolamu, na ndakisa balakisi ya bana na biso to bankɔkɔ na bango. Soki kaka libota moko babengi biso epai na bango mpo tókabola na bango bilei, totindelaka bango mwa mokanda mpo na kopesa bango matɔndi, mpe bana nyonso bakomaka mwa maloba to basalaka mwa liyemi na kati ya mokanda yango.” Komonisa bonkonde mpe kopesa matɔndi ekosalisa mwana na mikolo ezali koya azwa baninga ya malamu mpe oyo bakotika ye te.

“Koboyela mwana disiplini te”

Ntango bana na yo bazali kokola, ezali na ntina mingi báyeba ete moto abukaka kaka oyo alonaka. Ata ntango bana bazali naino mike, bandimaka kotosa mibeko, kaka oyo batyeli bango na ndako te, kasi mpe na eteyelo mpe na bisika mosusu. Okoki kosalisa bana na yo báyeba ete moto abukaka kaka oyo alonaka. (Bagalatia 6:7) Na ndenge nini?

Biblia elobi: “Koboyela mwana disiplini te.” (Masese 23:13) Soki osilá koyebisa mwana na yo polele ete soki asali likambo boye ya mabe, okopesa ye etumbu, kozonga nsima te, pesá ye etumbu ndenge olobaki. Norma, mama moko na Argentine, alobi boye: “Kokakola te mibeko oyo otyelaki bana. Soki ozali kokakola mibeko, yango ekotinda mwana asala makambo na ndenge oyo motema na ye elingi.”

Liboso ya kopesa mwana etumbu, baboti basengeli koluka koyeba soki mwana yango ayebi malamu ntina oyo balingi kopesa ye etumbu yango; kosala bongo ekosalisa baboti bábendanaka te ná mwana ntango asali mbeba. Mbala mingi, bana batosaka soki bayebi mibeko oyo batyelá bango, nini ekokómela bango soki babuki mibeko yango, mpe ete baboti na bango bakozanga te kopesa bango etumbu kaka ndenge balakaki bango.

Ezali solo ete mpo disiplini ememela bana matomba, osengeli te kopesa yango na nkanda. Biblia elobi boye: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino.” (Baefese 4:31) Disiplini esengeli soki moke te kozala etumbu ya makasi koleka mpe esengeli te kosala mwana mabe na nzoto to kozokisa ye na motema.

Kasi ndenge nini okoki komipekisa mpo osilika te ntango mwana na yo asukisi yo motema? Peter, tata moko na Nouvelle-Zélande, alobi boye: “Yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi esengeli bana báyeba ete baboti bapesaka bango disiplini mpo basali likambo moko ya mabe, kasi te mpo bazangaka komipekisa.”

Peter ná mwasi na ye basalaka makasi básalisa bana na bango báyeba ete soki basemboli bango ezali mpo bázala malamu mpo na libela. Alobi boye: “Ata soki bana basali likambo moko ya mabe mpenza, toyebisaka bango nini bakoki kosala mpo bázala bana malamu, na esika ya kozongela kaka mabe oyo bauti kosala.”

‘Ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana’

Mpo na etumbu oyo Nzambe asengelaki kopesa basaleli na ye mpo na kosembola bango, alobaki boye: “Nakopesa yo etumbu na ndenge oyo ebongi.” (Yirimia 46:28) Etumbu oyo opesi mwana ekobimisa matomba soki opesi ye yango na ndenge oyo ebongi mpe ekokani na mabe oyo ye asali. Paulo akomelaki bakristo boye: ‘Ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana.’​—Bafilipi 4:5.

Kozala makambo makasimakasi te elimboli mpe kopesa bana disiplini na ndenge oyo ezali kobatela lokumu na bango. Santi, tata moko na Italie, oyo azali na bana mibale, alobi boye: “Nalingaka ata moke te koyokisa bana na ngai nsɔni. Nasalaka nde makasi nayeba nini etindi mwana asala likambo boye to boye, mpe nasalisaka ye azongela yango lisusu te. Nasalaka makasi napesa bana na ngai disiplini na miso ya bato mosusu te, ata mpe kopesa mwana moko disiplini na miso ya mosusu. Mpe soki mwana asali libunga, natyolaka ye te, ezala na miso ya bato to ntango tozali kaka biso mibale.”

Richard, oyo tolobelaki liboso, amoni mpe ete kozala makambo makasimakasi te ezali na ntina mingi. Alobi boye: “Esengeli te kobakisela mwana etumbu mbala nyonso oyo asali lisusu likambo ya mabe. Nsima ya kopesa mwana disiplini, ezali na ntina te kokoba kolobela yango to kokundwela mwana mabe oyo asalaki.”

Kobɔkɔla bana ezali mosala makasi oyo esɛngaka komipimela makambo mingi, kasi ememaka matomba mingi. Yelena, mama moko na Russie, amonaki ete ezali bongo. Alobi boye: “Naponaki mosala oyo ekozwa ngai ntango mingi te, mpo nalekisaka ntango mingi elongo na mwana na ngai. Mpo na kosala bongo esɛngaka milende mingi mpe kondima kozala lisusu na mbongo mingi te; kasi soki namoni ndenge oyo mwana na ngai akómi na esengo mpe ndenge oyo tokómi mpenza baninga, namonaka ete ezalaki mpenza na ntina nasala bongo.”

[Elilingi na lokasa 11]

Bana bakoki koyekola komitya na esika ya basusu

[Elilingi na lokasa 12]

Pesá bana disiplini na ndenge oyo ezali kobatela lokumu na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto