Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 2/15 nk. 10-11
  • Soki mwana na yo atuni motuna etali liwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Soki mwana na yo atuni motuna etali liwa
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKAKATANO
  • Ndenge ya kosalisa mwana ntango bokufeli ndeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge ya kobatela bana na yo
    Lamuká!—2007
  • Baboti​—⁠Bósalisa mwana na bino akóma na kondima makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Te na yo etikala kaka Te
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 2/15 nk. 10-11
Tata oyo azali kosolola na mwana na ye

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Soki mwana na yo atuni motuna etali liwa

MOKAKATANO

Mwana na yo ya mbula 6 atuni yo boye: “Okokufa mokolo mosusu?” Motuna yango ekamwisi yo mpe omituni boye: ‘Na mbula oyo mwana na ngai azali na yango, akokanga ntina ya eyano oyo nakopesa ye? Ndenge nini nakoki kosolola na ye likambo etali liwa?’a

OYO OSENGELI KOYEBA

Bana bakanisaka makambo etali liwa. Kutu, ntango basakanaka, bamosusu basalaka lokola bakufi. Yango wana, liwa esengeli te kozala likambo ya kobanga mpo na kolobela yango mpe osengeli koboya te motuna nyonso oyo mwana atuni yo na likambo yango. Soki ozali kozwa mabaku ya kosolola polele likambo etali liwa ná mwana na yo, okosalisa ye ayeba ndenge ya kosala ntango moto moko oyo ye alingaka akufi.

Kosolola na mwana na yo makambo etali liwa ekopesa ye makanisi mabe te. Kutu, ekosalisa ye nde abangaka mingi te. Kasi, ezali na makambo mosusu oyo osengeli koyeba malamu. Na ndakisa, bato mosusu ya mayele balobaka ete bana mingi oyo bakokisi naino mbula 6 te batalelaka liwa te lokola nsuka ya makambo. Na masano na bango, mwana moko akoki kosala lokola “akufi” mpe na nsima azongi lisusu na “bomoi.”

Kasi, soki bakoli mwa moke, bana bayebaka mpenza ete liwa ezali likambo ya lisɛki te; yango ekoki kosala ete bázala na mituna, bámitungisa, to bábanga, mingimingi soki moto moko oyo bango balingaka akufi. Na yango, ebongi mpenza kosolola likambo yango ná mwana na yo. Marion Haza, monganga moko oyo asalisaka maladi ya motó, alobi boye: “Mwana akómaka na kobanga mingi mpo na liwa soki bapekisaka ye alobela likambo yango na ndako.”

Osengeli te komitungisa koleka ndelo mpo na oyo okoloba na ye. Ankɛtɛ moko emonisi ete bana balingaka “báyebisa bango likambo ya solo na maloba ya boboto.” Kobosana te ete mbala mingi, mwana atikaka te kotuna motuna soki azwi naino eyano te.

OYO OKOKI KOSALA

Salelá libaku nyonso oyo emonani mpo na kolobela liwa. Soki mwana na yo amoni ndɛkɛ oyo ekufi na nzela to nyama moko oyo bobɔkɔlaka ekufi, salelá mituna ya pɛtɛɛ oyo ekotinda ye aloba. Na ndakisa, okoki kotuna ye boye: “Nyama oyo ekufi eyokaka mpasi? Eyokaka malili to nzala? Ndenge nini oyebaka ete nyama to moto akufi?”​—Toli ya Biblia: Mosakoli 3:1, 7.

Kokosa ye te. Soki moninga to ndeko moko ya libota akufi, boyá kosalela maloba oyo ekotya ye mobulu na motó, na ndakisa maloba lokola “atiki biso, akei na ye.” Mwana akoki kokanisa ete mosika te moto yango akozonga na ndako. Salelá nde maloba ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Ntango nkɔkɔ ya mwasi akufaki, nzoto na ye etikaki kosala. Tokoki kosolola na ye lisusu te, kasi tokobosana ye soki moke te.”​—Toli ya Biblia: Baefese 4:25.

Lokola mwana akoki kokanisa ete ye mpe akokufa mpo moto moko akufi, kitisá ye motema ete mabe ekokómela ye te

Kitisá mwana na yo motema. Mwana akoki kokanisa ete misala to makanisi na ye nde esali ete moto moko akufa. Na esika ya koloba kaka ete ezali foti na ye te, okoki kotuna ye boye: “Nini etindi yo okanisa ete ezali foti na yo?” Yoká ye na likebi kozanga komonisa ete osepeli te na makanisi na ye. Lisusu, lokola mwana akoki kokanisa ete ye mpe akokufa mpo moto moko akufi, kitisá ye motema ete mabe ekokómela ye te.

Salá ete mwana abimisa makanisi na ye. Bɛtelá mwana na yo masolo ya baninga to bandeko oyo bakufá, ata mpe baoyo amoná bango te. Okoki kolobela ye basuvenire ya malamu ya tata-mwasi, ya nɔkɔ, to ya nkɔkɔ mpe kobɛta masolo na bango ya kosɛkisa. Soki ozali kobɛta masolo ya bato yango polele, okosalisa mwana amona ete ezali mabe te kolobela to kokanisa bato oyo bakufá. Kasi, kolobisa ye na makasi te. Okoki kosolola na ye nsima, na ntango oyo ebongi.​—Toli ya Biblia: Masese 20:5.

Mokapo 34 mpe 35 ya buku Yekolá epai ya Moteyi monene ekoki kosalisa mwana na yo ayeba oyo Biblia eteyaka mpo na liwa. Fungolá esika bakomi MIKANDA > BABUKU MPE MWA BABUKU

a Na lisolo oyo tolobeli bana nyonso, ezala mibali to basi.

BAVƐRSƐ YA NTINA MINGI

  • “Ezali na . . . ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.”​—Mosakoli 3:1, 7.

  • “Bólobaka solo mokomoko na bino na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25.

  • “Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.”​—Masese 20:5.

MAKAMBO YA NTINA MINGI YA KOYEBISA YE

Soki moninga to ndeko moko akufi, okoki kosalisa mwana na yo alongola kobanga makasi oyo azali na yango mpo na liwa soki osalisi ye ayeba makambo oyo elandi:

  • Akokufa te.

  • Soki likambo moko ekómeli yo, bandeko na bino bakobatela ye.

  • Soki moto akufi anyokwamaka lisusu te.

  • Bokobosana te moto oyo akufi. Okoki koloba boye: “Okomona nkɔkɔ ya mwasi lisusu te, kasi okoki kobomba na motema na yo basuvenire na ye.”

Kobosana te, soki oyebisi mwana eloko te yango ekosala ete amitungisa mingi lisusu. Kutu, ekotinda ye akanisa makambo mingi lisusu oyo ekotya ye mobulu na motó.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto