Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 34
  • Bilei ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilei ya sika
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Tózwa bolamu ya “masangu ya likoló”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Nyoka ya motako
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 34

Lisolo 34

Bilei ya sika

ELOKO nini bato oyo bazali kolɔkɔta? Ezali mpɛmbɛ, kasi ezali kilo te; ezali bilei.

Sanza mobimba ekokaki naino te banda Bayisraele batiki Ezipito. Sikoyo bazali na kati ya esobe. Kuna bilei ezalaka mingi te, mpe bato bakómi koimaima mpe koloba ete: ‘Ebongaki Yehova aboma biso na Ezipito. Kuna tozalaki kolya bilei oyo tolingi.’

Bongo Yehova alobaki ete: ‘Nakonɔkisela bino bilei longwa na likoló.’ Asalaki mpe bongo. Na ntɔngɔ, Bayisraele bamonaki biloko ya mpɛmbɛmpɛmbɛ ekwei na nse, mpe batunani ete: ‘Oyo nini?’

Moize alobi na bango ete: ‘Ezali bilei oyo Yehova apesi bino bólya.’ Bato babengi yango MANA. Elɛngi na yango ezali lokola bagato oyo basali na mafuta ya nzoi.

Moize ayebisi bango ete: ‘Bólɔkɔta moto na moto na kotalela oyo akoki kolya.’ Bongo bazalaki kolɔkɔta yango ntɔngɔ na ntɔngɔ. Mpe ntango moi engali, oyo etikalaki na mabele ezalaki konyangwa.

Moize alobi lisusu ete: ‘Moto abomba ndambo na yango tii na ntɔngɔ te.’ Kasi bato mosusu bayokelaki Moize te, mpe babombaki yango. Boyebi eloko nini esalemaki? Na ntɔngɔ, mana yango etondaki na nkusu, ezalaki kobimisa nsolo mabe.

Nzokande, ezalaki na mokolo moko na kati ya pɔsɔ oyo Yehova ayebisaki bato bálɔkɔtaka yango mbala mibale koleka ndenge balɔkɔtaka. Ezalaki mokolo ya motoba. Basengelaki kobomba ndambo mpo na mokolo ya nsambo, mpo na mokolo wana, Yehova akokweisa mana te. Ntango bazalaki kobomba yango mpo na mokolo wana, ezalaki kotonda na nkusu te mpe ezalaki kobimisa nsolo mabe te. Yango mpe ezali likamwisi!

Ntango nyonso oyo Bayisraele baumelaki na esobe, Yehova aleisaki bango mana.

Kobima 16:1-36; Mitángo 11:7-9; Yosua 5:10-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto