Mituna ya batángi
Sanduku ya kondimana ezalaki kaka na bitanda mibale ya mabanga, to ezalaki mpe na biloko mosusu?
Na mobu 1026 liboso ya ntango na biso (L.T.B), ntango bafungolaki tempelo oyo Salomo atongaki, “eloko moko te ezalaki na kati ya Sanduku, longola kaka bitanda mibale oyo Moize apesaki na Holebe, ntango Yehova asalaki kondimana elongo na bana ya Yisalaele ntango babimaki na Ezipito.” (2 Ntango 5:10, NW) Kasi, ezalaki bongo na bileko nyonso te.
“Na sanza ya misato na nsima ya kobima ya bato ya Yisalaele na Ezipito,” bakómaki na esobe ya Sinai. (Exode 19:1, 2) Na nsima, Moize amataki na Ngomba Sinai mpe azwaki bitanda mibale ya mabanga oyo ezalaki na Mibeko. Alobaki boye: “Bongo [nabalukaki, NW] mpe nakitaki ngomba, mpe natyaki bitanda na sanduku esalaki ngai, mpe ezali wana lokola elobelaki [Yehova] ngai.” (Deteronome 10:5) Yango ezalaki sanduku oyo Yehova ayebisaki Moize asala mpo na kotya bitanda ya Mibeko mpo na mwa ntango, liboso básala sanduku oyo elingaki kotikala mpo na libela. (Deteronome 10:1) Basalaki sanduku ya kondimana na nsuka ya mobu 1513 L.T.B.
Ntango Bayisalaele babimaki na Ezipito, mwa moke na nsima, babandaki koimaima mpo na biloko ya kolya. Yango wana, Yehova apesaki bango mana. (Exode 12:17, 18; 16:1-5) Na ntango yango, Moize ayebisaki Alona boye: “Kamatá mbɛki moke mpe tyá omɛlɛ moko ya mana kati na yango, mpe tyá yango liboso ya [Yehova] ete ebatelama mpo na mabota na bino.” Lisolo ebakisi boye: “Lokola [Yehova] alakaki Moize, bobele bongo Alona atyaki yango liboso ya [Litatoli, NW] [esika ya kobomba biloko ya kala oyo ezalaki na ntina] ete ebatelama.” (Exode 16:33, 34) Na ntembe te, atako Alona atyaki mana na mbɛki na ntango wana, mpo atya mbɛki yango liboso ya Litatoli, azelaki tii ntango Moize asalaki Sanduku mpe atyaki bitanda kati na yango.
Ndenge tolobaki liboso, sanduku ya kondimana esalemaki nsima, na nsuka ya mobu 1513 L.T.B. Batyaki nzete ya Alona na Sanduku yango bambula mingi na nsima, nsima ya botomboki ya Kola ná bato na ye. Yango wana ntoma Paulo alobelaki “sanduku ya kondimana . . . oyo na kati na yango ezalaki na elokó ya wolo oyo ezalaki na mana mpe lingenda ya Alona oyo ebimisaki fololo mpe bitanda ya kondimana.”—Baebele 9:4.
Mana ezalaki bilei oyo Nzambe azalaki kopesa Bayisalaele na boumeli ya mbula 40 oyo batambolaki na esobe. Nzambe atikaki kopesa yango ntango “elyaki bango mbuma ya mokili” ya ndaka. (Yosua 5:11, 12) Batyaki lingenda ya Alona na sanduku ya kondimana mpo na mokano moko: ezala lokola elembo to litatoli mpo na batomboki. Yango elimboli ete lingenda yango etikalaki wana na boumeli ya ntango nyonso oyo bazalaki kotambola na esobe. Na yango, tokoki mpenza koloba ete balongolaki lingenda ya Alona mpe elokó ya wolo oyo ezalaki na mana na sanduku ya kondimana nsima ya kokɔta ya Bayisalaele na Mokili ya Ndaka mpe liboso báfungola tempelo oyo Salomo atongaki.