Loyembo 17
“Mamwe” ya Yehova kati na mabota
1. Talá Klist’ayanganisi
Bapakolami na Yah;
Lokola mamwe ya ntɔ́ngɔ́,
Batondi na bonzengá.
2. Basaleli ya Yehova
Bakokani na mamwe;
Na kimya mpe na boboto,
Babɔndisi bato bɛɛ.
3. Baninga ya batikali
Bakosakola nsango.
Lokola mamwe kitoko,
Basalani n’esengo.
4. Mpe na bolingo malamu
Babundeli Yehova.
Lokola mamwe kitoko,
Bokonzi, tósakola!